Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mopaya

Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Mopaya mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Levitike 19:34

Nzokande bozwa ye kati na bino lokola mwana mboka. Bokolinga ye lokola bino moko, pamba te bino mpe bozalaki bapaya kati na Ejipito. Nazali Yawe, Nzambe na bino.

02 Kobima 23:9

Okonyokola mopaya te, pamba te oyebi yo moko ndenge ezalaka soki ozali mopaya; bino mpe bozalaki bapaya na Ejipito.

03 Deteronomi 10:19

Bino mpe bosengeli kolinga bapaya, pamba te bino mpe bozalaki bapaya na Ejipito.

04 Ba-Ebre 13:2

Bolemba te koyambaka malamu bapaya, pamba te, na nzela wana, bato mosusu bayambaki ba-anjelu wana bayebaki te ete bazali solo ba-anjelu.

05 Matayo 25:35

Pamba te nayokaki nzala, mpe bopesaki Ngai bilei; nayokaki posa ya mayi, mpe bopesaki Ngai mayi ya komela; nazalaki mopaya, mpe boyambaki Ngai malamu;

06 Levitike 19:33

Soki mopaya moko ayei kovanda kati na bino, na mokili na bino, bonyokola ye te.

07 Mitango 15:15-16

Mibeko ya kosalela ekozala ndenge moko mpo na lisanga mobimba, ezala bino to mopaya oyo akowumela kati na bino. Yango ekozala mobeko ya libela ezala mpo na milongo oyo ekoya. Bino na mopaya bozali ndenge moko liboso ya Yawe. Ezala bino to mopaya oyo azali kati na bino, bokosalela kaka mibeko mpe mitindo moko. › »

08 Deteronomi 24:14

Konyokola te moto ya mosala oyo azali mobola to moto akelela: azala ndeko na yo moto ya Isalaele to mopaya oyo azali kovanda kati na moko ya bingumba na yo.

Bantína oyo etali