Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mwasi oyo akufeli mobali

Bavɛrsɛ 14 ya Biblia na ntína ya Mwasi oyo akufeli mobali mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Banzembo 68:5

Boyembela Nzambe, boyemba banzembo mpo na lokumu ya Kombo na Ye. Bofungola nzela mpo na Ye oyo atambolisaka mampinga na Ye kati na esobe. Kombo na Ye ezali Yawe. Botonda na esengo liboso na Ye.

02 Jake 1:27

Kosambela ya solo mpe ya peto na miso ya Nzambe, Tata na biso, ezali: kosunga bana bitike mpe basi bakufisa mibali, kati na bapasi na bango, mpe komibatela peto liboso ya makambo ya mokili.

03 Deteronomi 10:18

abundelaka mwana etike mpe mwasi oyo akufisa mobali, alingaka mopaya mpe apesaka ye bilei mpe bilamba.

04 Ezayi 1:17

Boyekola nde kosala malamu, boluka bosembo, bosunga moto oyo bazali konyokola, bobundela mwana etike, bokotela mwasi oyo akufisa mobali!

05 Kobima 22:22

Soki bonyokoli bango, bongo bango bagangi epai na Ngai, solo nakoyoka koganga na bango.

06 Banzembo 146:9

Yawe abatelaka bapaya, asungaka mwana etike mpe mwasi oyo akufisa mobali, kasi abebisaka banzela ya bato mabe.

07 Deteronomi 24:19

Tango bokobuka mbuma na bilanga na bino, soki bobosani liboke ya ble, bozonga te mpo na kozwa yango; botika yango mpo na mopaya, mpo na mwana etike mpe mpo na mwasi oyo akufisa mobali mpo ete Yawe, Nzambe na bino, apambola bino na misala nyonso oyo maboko na bino ekosala.

08 1 Timote 5:3

Sunga malamu basi oyo bakufisa mibali, oyo bazali penza kokelela.

09 Jeremi 49:11

Tika bana bitike na yo, nakobatela bomoi na bango; mpe basi na yo, oyo bakufisa mibali bakotiela Ngai motema. »

10 Zakari 7:10

Bonyokolaka te mwasi oyo akufisa mobali to mwana etike to mopaya to mpe mobola, mpe tika ete moko te kati na bino asala, na motema na ye, mabongisi ya kosala moninga na ye mabe. »

11 Masese 15:25

Yawe abukaka ndako ya moto ya lolendo, kasi alendisaka libula ya mwasi oyo akufisa mobali.

12 Luka 7:13

Tango kaka Nkolo amonaki mwasi yango, ayokelaki ye mawa mingi mpe alobaki na ye: — Kolela te!

13 Deteronomi 14:29

Na bongo, Balevi oyo bazali na eteni ya mabele te to na libula te mpo na bango moko elongo na bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali oyo bavandaka na bingumba na bino, bakoya kolia mpe kotonda mpo ete Yawe, Nzambe na bino, akoka kopambola bino na misala na bino nyonso ya maboko.

14 Malako 12:42-43

Mwasi mobola moko akufisa mobali ayaki mpe atiaki mbongo mibale ya bibende, oyo ezalaki na motuya moke penza. Yesu abengaki bayekoli na Ye mpe alobaki na bango: — Nazali koloba na bino penza ya solo: mwasi mobola oyo akufisa mobali apesi koleka bato nyonso oyo bawuti kotia mbongo kati na kitunga ya makabo.

Bantína oyo etali