Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kotalela Nzambe

Bavɛrsɛ 15 ya Biblia na ntína ya Kotalela Nzambe mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Yoane 15:5

Nazali nzete ya vino; bino, bozali bitape. Moto oyo akowumela kati na Ngai, mpe Ngai kati na ye, akobotaka bambuma ebele, pamba te bokoki kosala eloko moko te, soki na lisungi na Ngai te.

02 2 Bakolinto 12:9

Kasi azongiselaki ngai: « Ngolu na Ngai ekoki mpo na yo, pamba te nguya na Ngai ekokisamaka kati na bolembu. » Mpo na yango, nakomikumisa na esengo nyonso mpo na bolembu na ngai, mpo ete nguya ya Klisto ezala kati na ngai.

03 Bafilipi 4:13

Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi.

04 Banzembo 121:1-2

Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe. Natomboli miso na ngai na ngambo ya bangomba: lisungi na ngai ekowuta wapi? Lisungi na ngai ewutaka na Yawe oyo akela likolo mpe mabele.

05 Masese 3:5-6

Ndimela Yawe na motema na yo mobimba, mpe kotia motema te na mayele na yo. Yebaka Ye na banzela na yo nyonso, mpe Ye akokomisa yango alima.

06 Masese 3:5

Ndimela Yawe na motema na yo mobimba, mpe kotia motema te na mayele na yo.

07 Banzembo 73:25-26

Kuna na Likolo, nani azali mpo na ngai soki Yo te? Mpe awa na mokili, nasepela na nani soki na Yo te? Nzoto na ngai ekoki kobeba, mpe motema na ngai ekoki kolemba; kasi Nzambe azali Libanga mpe libula na ngai mpo na tango nyonso.

08 Ezayi 41:10

Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo; komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo; nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo; solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali, loboko oyo elongisaka.

09 2 Bakolinto 3:5

Tosengeli te kokanisa ete ezali na ndenge na biso moko nde tozwi makoki ya kosala likambo songolo; te, makoki na biso ewutaka nde na Nzambe.

10 Banzembo 62:1-2

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi, kolanda Yedutuni. Nzembo ya Davidi. Solo, nazwaka kimia kati na Nzambe; lobiko na ngai ewutaka epai na Ye.

11 Jeremi 17:7

Kasi tika ete moto oyo atiaka elikya na Yawe mpe atalelaka Ye apambolama!

12 Banzembo 46:1

Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na mongongo moke ya bilenge basi.

13 Matayo 6:33

Bolukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe mpe bosembo na Ye, bongo bakobakisela bino biloko wana nyonso.

14 Banzembo 28:7

Yawe azali makasi mpe nguba na ngai; natielaka Ye motema na ngai, mpe asungaka ngai. Motema na ngai etondi na esengo, mpe nazali kokumisa Ye na banzembo na ngai.

15 Yoane 15:4

Bowumela kati na Ngai, mpe Ngai nakowumela kati na bino. Ndenge etape ekoki kobota bambuma te na ndenge na yango moko, soki ekangani te na nzete na yango ya vino, ndenge wana mpe bino, bokoki kobota bambuma te soki bokangani na Ngai te.

Bantína oyo etali