Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bondimi lokola ya mwana

Bavɛrsɛ 6 ya Biblia na ntína ya Bondimi lokola ya mwana mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Matayo 18:3

mpe alobaki: — Nazali koloba na bino penza ya solo: soki bobongwani te mpe bokomi te lokola bana mike, bokotikala kokota te na Bokonzi ya Likolo.

02 Malako 10:15

Nazali koloba na bino penza ya solo: moto nyonso oyo azali koyamba te Bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke akotikala kokota te kati na Bokonzi yango.

03 Matayo 18:4

Yango wana, moto nyonso oyo akomikitisa lokola mwana oyo, ye nde aleki monene kati na Bokonzi ya Likolo.

04 Banzembo 131:2

Kasi nabatelaki kimia kati na motema na ngai mpe namitungisaki te lokola mwana moke elongo na mama na ye. Nazali na kimia lokola mwana oyo mama alongola na mabele.

05 Matayo 11:25

Kaka na tango yango, Yesu alobaki: — Oh Tata, Nkolo ya Likolo mpe ya mabele, nakumisi Yo! Pamba te, obombaki makambo oyo mpo ete bato ya bwanya mpe bato ya mayele bayeba yango te, kasi olakisi yango na bana mike!

06 Malako 10:14

Tango Yesu amonaki bongo, ayokaki pasi na motema mpe alobaki na bayekoli: — Botika bana mike baya epai na Ngai; bopekisa bango te koya epai na Ngai, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.

Bantína oyo etali