Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bondimi kozanga misala ekufa

Bavɛrsɛ 6 ya Biblia na ntína ya Bondimi kozanga misala ekufa mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Jake 2:17

Ezali mpe bongo mpo na kondima: soki kondima ezangi misala, ezali ya kokufa.

02 Jake 2:26

Ndenge nzoto oyo ezangi pema ezali ya kokufa, ndenge wana mpe kondima oyo ezangi misala ezali ya kokufa.

03 Jake 2:18

Nzokande moto mosusu akoki koloba: « Yo ozali na kondima; kasi ngai, nazali na misala. » Lakisa ngai kondima na yo, oyo ezangi misala; mpe ngai nakolakisa yo kondima na ngai na nzela ya misala na ngai.

04 Bagalatia 5:6

Pamba te, kati na Yesu-Klisto, likambo ya tina ezali: kozala na kondima oyo esalaka na nzela ya bolingo; ezali te: kokatama ngenga to kokatama ngenga te.

05 Matayo 7:21

Bato nyonso oyo balobaka na Ngai: ‹ Nkolo! Nkolo! › bakokota te na Bokonzi ya Likolo, kaka bato oyo basalaka mokano ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo.

06 Jake 2:24

Bomoni malamu sik’oyo ete Nzambe akomisaka moto sembo kolanda misala ya moto, kasi mpo na kondima kaka te.

Bantína oyo etali