Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bondimi ekoningisaka bangomba

Bavɛrsɛ 13 ya Biblia na ntína ya Bondimi ekoningisaka bangomba mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

Bakisá bavɛrsɛ nyɔnsɔ 13 Kela kɔ́nti ya ofele mpo na kokanga yango na motó.
01 Matayo 17:20 Vɛrsɛ ya ntina

Yesu azongiselaki bango: — Ezali mpo ete bozali na kondima moke. Nazali koloba na bino penza ya solo: soki kondima na bino ezalaki lokola mbuma ya mutarde, bokokaki koloba na ngomba oyo: « Longwa awa, kende kuna; » mpe ekokende penza. Eloko moko te ekoki kozanga kosalemela bino. [

02 Malako 11:23

Nazali koloba na bino penza ya solo: soki moto alobi na ngomba wana: « Longwa wana mpe mibwaka na ebale; » soki atie tembe te kati na motema na ye, kasi andimi ete makambo oyo alobi ekosalema, solo, akomona yango kokokisama.

03 Matayo 21:21

Yesu azongiselaki bango: — Nazali koloba na bino penza ya solo: soki bozali na kondima mpe botie tembe te, bokoki kaka te kosala makambo oyo Ngai nasali na nzete ya figi oyo, kasi bokoki mpe koloba na ngomba wana: « Longwa wana mpe mibwaka na ebale, » yango ekosalema solo.

04 Malako 9:23

Yesu alobaki na ye: — Olobi nini: « Soki okoki! » Nyonso ekoki kosalema mpo na moto oyo azali na kondima.

05 Luka 17:6

Nkolo azongisaki: — Soki bozali na kondima oyo ezali moke lokola mbuma ya mutarde, bokoki koloba na nzete oyo: « Pikolama na esika oyo mpe kende komilona kati na ebale, » mpe ekotosa bino.

06 Matayo 21:22

Soki bozali na kondima, bokozwa nyonso oyo bokosenga kati na losambo.

07 Malako 11:24

Yango wana nazali koloba na bino: eloko nyonso oyo bokosenga wana bozali kosambela, bondima ete bosili kozwa yango mpe bokomona yango kokokisama.

08 1 Bakolinto 13:2

Soki nazali na likabo ya kosakola, ya kososola mabombami nyonso mpe ya koyeba makambo nyonso; mpe soki nazali na kondima oyo ekoki kolongola bangomba, kasi nazangi bolingo, nazali pamba.

09 Zakari 4:7

Ozali nani, ngomba monene? Okokoma etando liboso ya Zorobabeli. Akobimisa libanga monene kati na yo, wana bato bakozala koganga na esengo: « Tika ete Nzambe apambola yango! Tika ete Nzambe apambola yango! »

10 Matayo 9:29

Bongo asimbaki miso na bango mpe alobaki: — Tika ete esalemela bino kolanda kondima na bino!

11 Bafilipi 4:13

Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi.

12 Ba-Ebre 11:33

Mpo na kondima, balongaki bokonzi ebele, batambolisaki makambo na bosembo mpe bamonaki bilaka ya Nzambe kokokisama mpo na bango; bakangaki ata minoko ya bankosi,

13 Jake 1:6

Kasi asengeli kosenga na kondima, na kotia tembe te; pamba te moto oyo atiaka tembe azali lokola mbonge ya ebale oyo mopepe ezali koningisa mpe kobwaka epai na epai.

Bantína oyo etali