Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kondimela Nzambe

Bavɛrsɛ 9 ya Biblia na ntína ya Kondimela Nzambe mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Bafilipi 1:6

Nandimisami solo ete Ye oyo abandaki mosala kitoko oyo kati na bino akokomisa yango kino na suka, na mokolo ya Yesu-Klisto.

02 Ba-Ebre 13:6

Boye tokoki koloba na elikya nyonso: « Nkolo azali Mosungi na ngai, nakobanga te; bato bakoki kosala ngai nini? »

03 Banzembo 27:1

Nzembo ya Davidi. Yawe azali pole mpe lobiko na ngai; nakobanga nani? Yawe azali ndako batonga makasi ya bomoi na ngai; nakolenga liboso ya nani?

04 1 Yoane 5:14

Mpe tala elikya oyo tozali na yango liboso ya Nzambe: soki tosengi eloko kolanda mokano na Ye, ayoki biso.

05 Ba-Ebre 4:16

Boye, topusana na elikya nyonso pene ya Kiti ya Bokonzi ya ngolu mpo ete Nzambe ayokela biso mawa mpe tozwa ngolu, oyo ekosunga biso na tango oyo ekoki.

06 Masese 3:26

pamba te Yawe akozala elikya na yo mpe akobatela makolo na yo mpo ete ekangama te na motambo.

07 Banzembo 118:6

Yawe azali mpo na ngai, nakobanga te; bato bakoki kosala ngai nini?

08 Bafilipi 4:13

Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi.

09 2 Timote 1:12

Ezali mpe mpo na Sango Malamu yango nde nazali komona pasi oyo. Kasi atako bongo, nazali koyoka soni te, pamba te nayebi nani oyo ngai nandimela, mpe nazali na elikya ete azali na makoki ya kobatela nyonso oyo apesa ngai, kino na mokolo wana.

Bantína oyo etali