Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Molimo Asungaka bolɛmbu na biso

Bavɛrsɛ 14 ya Biblia na ntína ya Molimo Asungaka bolɛmbu na biso mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Barome 8:26

Ndenge moko mpe Molimo ayaka kosunga biso kati na bolembu na biso; pamba te toyebi te kosambela na lolenge oyo esengeli, kasi Molimo Ye moko abondelaka mpo na biso na maloba oyo moto akoki koloba te.

02 Barome 8:27

Mpe Nzambe oyo akundolaka mozindo ya mitema ayebi makanisi ya Molimo, pamba te Molimo abondelaka mpo na basantu kolanda mokano ya Nzambe.

03 Yoane 14:16

Mpe Ngai, nakosenga epai ya Tata ete apesa bino Molobeli mosusu mpo ete azala elongo na bino tango nyonso,

04 2 Bakolinto 12:9

Kasi azongiselaki ngai: « Ngolu na Ngai ekoki mpo na yo, pamba te nguya na Ngai ekokisamaka kati na bolembu. » Mpo na yango, nakomikumisa na esengo nyonso mpo na bolembu na ngai, mpo ete nguya ya Klisto ezala kati na ngai.

05 Bafilipi 4:13

Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi.

06 Ezayi 40:31

basi bato oyo batiaka elikya na Yawe, Yawe ayeisaka makasi na bango ya sika: bapumbwaka likolo lokola bampongo, bapotaka mbangu mpe bapemaka te, batambolaka mpe balembaka te.

07 Zakari 4:6

Alobaki na ngai: — Tala liloba oyo Yawe alobi na Zorobabeli: « Ezali na makasi to na nguya na yo te, kasi na nguya na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.

08 Banzembo 73:26

Nzoto na ngai ekoki kobeba, mpe motema na ngai ekoki kolemba; kasi Nzambe azali Libanga mpe libula na ngai mpo na tango nyonso.

09 Ba-Efeso 3:16

mpo na kobondela ete alendisa bino na nguya, mpo na bolamu ya bomoto na bino ya kati, na nzela ya Molimo na Ye kolanda bomengo ya nkembo na Ye,

10 2 Bakolinto 4:16

Yango wana tobungisaka elikya te. Mpe atako bomoto na biso ya libanda ezali kobeba moke-moke, kasi bomoto na biso ya kati ekomaka ya sika, mokolo na mokolo.

11 Ezayi 41:10

Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo; komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo; nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo; solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali, loboko oyo elongisaka.

12 Banzembo 46:1

Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na mongongo moke ya bilenge basi.

13 Yoane 14:26

Kasi Molobeli, Molimo Mosantu oyo Tata akotinda na Kombo na Ngai, akoteya bino makambo nyonso mpe akosunga bino mpo ete bobosana te nyonso oyo nayebisaki bino.

14 Barome 15:13

Tika ete Nzambe oyo apesaka elikya atondisa bino na esengo nyonso mpe na kimia nyonso kati na kondima, mpo ete botonda na elikya na nzela ya nguya ya Molimo Mosantu.

Bantína oyo etali