Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kokambama na Molimo

Bavɛrsɛ 15 ya Biblia na ntína ya Kokambama na Molimo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Barome 8:14

Pamba te bato oyo batambolisamaka na Molimo ya Nzambe bazali bana na Nzambe.

02 Barome 8:16

Molimo Ye moko atatolaka na molimo na biso ete tozali bana na Nzambe.

03 Bagalatia 5:18

Kasi soki Molimo atambolisi bino, bokozala na se ya bokonzi ya Mobeko te.

04 Yoane 16:13

Tango akoya, Molimo ya bosolo, akotambolisa bino kati na bosolo nyonso; pamba te akoloba te makambo kowuta na Ye moko, kasi akoloba kaka makambo nyonso oyo akoyoka, mpe akoyebisa bino makambo oyo ekoya;

05 Banzembo 143:10

Lakisa ngai kosala mokano na Yo, pamba te ozali Nzambe na ngai. Tika ete Molimo malamu na Yo atambolisa ngai na mabele oyo ezanga mabaku!

06 Bagalatia 5:25

Lokola tozali kobika bomoi na biso na nzela ya Molimo, totambola mpe na lisungi ya Molimo.

07 Ezayi 30:21

Ata bokeyi na ngambo ya loboko ya mobali to na ngambo ya loboko ya mwasi, matoyi na bino ekoyoka sima na bino liloba oyo: « Tala nzela yango oyo! »

08 Barome 8:4

Asalaki bongo mpo ete bosembo oyo Mobeko esengaka ekokisama kati na biso oyo totambolaka te kolanda baposa ya nzoto, kasi kolanda Molimo.

09 Banzembo 25:4-5

Yawe, lakisa ngai nzela, teya ngai nzela oyo olingi ete nalanda. Kamba ngai kati na bosolo na Yo mpe pesa ngai mayele, pamba te ozali Nzambe, Mobikisi na ngai; mpe ngai natiaka elikya na ngai kati na Yo tango nyonso.

10 Barome 8:5-6

Bato oyo batambolaka kolanda baposa ya nzoto batiaka makanisi na bango na makambo ya nzoto, kasi ba-oyo batambolaka kolanda Molimo batiaka makanisi na bango na makambo ya Molimo. Baposa ya nzoto ememaka na kufa, kasi baposa ya Molimo ememaka na bomoi mpe na kimia.

11 Misala ya Bantoma 8:29

Molimo alobaki na Filipo: — Kende mpe pusana pene ya shar wana.

12 Misala ya Bantoma 13:2

Ezalaki mokolo moko, wana bazalaki kogumbamela Nkolo mpe kokila bilei, Molimo Mosantu alobaki: — Botiela ngai pembeni Barnabasi mpe Saulo mpo na mosala oyo nabengeli bango.

13 Misala ya Bantoma 16:6-7

Lokola Molimo Mosantu apesaki bango nzela te ya koteya Liloba kati na etuka ya Azia, Polo elongo na baninga na ye bakendeki na etuka ya Friji mpe ya Galatia. Tango bakomaki na mondelo ya Mizi, bazwaki likanisi ya kokende na Bitini, kasi Molimo ya Yesu apesaki bango nzela te.

14 Masese 3:5-6

Ndimela Yawe na motema na yo mobimba, mpe kotia motema te na mayele na yo. Yebaka Ye na banzela na yo nyonso, mpe Ye akokomisa yango alima.

15 Banzembo 32:8

Olobaki: « Nakopesa yo malako mpe nakolakisa yo nzela ya kolanda; nakopesa yo toli mpe nakosenzela yo.

Bantína oyo etali