Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kotonda na Molimo
Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Kotonda na Molimo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Bolangwaka masanga te, pamba te ememaka na mobulu; kasi botondisamaka na Molimo,
Bango nyonso batondisamaki na Molimo Mosantu mpe babandaki koloba na nkota mosusu, ndenge Molimo azalaki kolakisa bango.
Boye, tango basilisaki kobondela, esika oyo basanganaki eninganaki; bango nyonso batondisamaki na Molimo Mosantu mpe bakomaki koteya Liloba na Nzambe na molende nyonso.
Boye, tala makambo oyo nazali koloba na bino: Botambola kolanda baposa ya Molimo, mpe bokokokisa te baposa ya bomoto na bino.
Kasi bokozwa nguya, wana Molimo Mosantu akokitela bino; mpe bokozala batatoli na Ngai kati na Yelusalemi, na etuka mobimba ya Yuda, ya Samari, mpe kino na basuka ya mokili.
Yesu atondisamaki na Molimo Mosantu, alongwaki na Yordani, mpe Molimo amemaki Ye kati na esobe
Nzokande, bayekoli batondaki na esengo mpe na Molimo Mosantu.
Tika ete Nzambe oyo apesaka elikya atondisa bino na esengo nyonso mpe na kimia nyonso kati na kondima, mpo ete botonda na elikya na nzela ya nguya ya Molimo Mosantu.