Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Molimo kati na biso

Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Molimo kati na biso mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 1 Bakolinto 3:16

Boni, boyebi te ete bozali Tempelo ya Nzambe, mpe ete Molimo ya Nzambe avandaka kati na bino?

02 1 Bakolinto 6:19

Boyebi te ete nzoto na bino ezali Tempelo ya Molimo Mosantu oyo azali kati na bino, oyo bozwaki kowuta na Nzambe? Mpe boyebi te ete bozali ya bino moko te?

03 Barome 8:9

Nzokande bino, botambolaka te kolanda baposa ya nzoto, kasi kolanda baposa ya Molimo, mpo ete Molimo ya Nzambe azali kati na bino. Mpe soki moto azangi Molimo ya Klisto azali mpe moto na Ye te.

04 2 Timote 1:14

Batela yango malamu lokola bomengo, na lisungi ya Molimo Mosantu oyo avandaka kati na biso.

05 1 Yoane 4:13

Tala ndenge nini toyebaka ete tozali kati na Nzambe, mpe Nzambe azali kati na biso: ezali na nzela ya Molimo na Ye, oyo apesa biso.

06 Ezekieli 36:27

Nakotia Molimo na Ngai kati na bino mpe nakosala ete botosa bikateli na Ngai mpe bobatela mibeko na Ngai na bokebi.

07 Bagalatia 4:6

Mpe mpo ete bozali penza bana, Nzambe atindaki Molimo ya Mwana na Ye kati na mitema na biso, Molimo oyo agangaka: « Aba, » elingi koloba: « Tata! »

Bantína oyo etali