Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kotambola na Molimo

Bavɛrsɛ 10 ya Biblia na ntína ya Kotambola na Molimo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Bagalatia 5:25

Lokola tozali kobika bomoi na biso na nzela ya Molimo, totambola mpe na lisungi ya Molimo.

02 Bagalatia 5:16

Boye, tala makambo oyo nazali koloba na bino: Botambola kolanda baposa ya Molimo, mpe bokokokisa te baposa ya bomoto na bino.

03 Barome 8:4

Asalaki bongo mpo ete bosembo oyo Mobeko esengaka ekokisama kati na biso oyo totambolaka te kolanda baposa ya nzoto, kasi kolanda Molimo.

04 Bagalatia 5:22-23

Kasi mbuma ya Molimo ezali: bolingo, esengo, kimia, kokanga motema, bondeko, kosala bolamu, kondima, boboto mpe komikanga. Mibeko epekisaka te makambo ya lolenge oyo.

05 Barome 8:1

Yango wana sik’oyo, etumbu ezali lisusu te mpo na bato oyo bazali kati na Yesu-Klisto.

06 Barome 8:5

Bato oyo batambolaka kolanda baposa ya nzoto batiaka makanisi na bango na makambo ya nzoto, kasi ba-oyo batambolaka kolanda Molimo batiaka makanisi na bango na makambo ya Molimo.

07 Barome 8:13-14

Pamba te soki botamboli kolanda baposa ya nzoto bokokufa; kasi soki bobomi, na nzela ya Molimo, misala mabe oyo bosalaka kati na banzoto na bino, bokozala na bomoi. Pamba te bato oyo batambolisamaka na Molimo ya Nzambe bazali bana na Nzambe.

08 Bagalatia 5:18

Kasi soki Molimo atambolisi bino, bokozala na se ya bokonzi ya Mobeko te.

09 Bagalatia 6:8

Moto oyo alonaka mpo na kosepelisa baposa ya bomoto na ye akobuka libebi, moto oyo alonaka mpo na kosepelisa Molimo akobuka bomoi ya seko.

10 Ba-Efeso 5:8-9

Na kala, bozalaki molili, kasi sik’oyo bokomi pole kati na Nkolo. Boye, botambolaka lokola bana ya pole, pamba te mbuma ya pole ezali: boboto, bosembo, mpe bosolo.

Bantína oyo etali