Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Botatoli ya Molimo na lisumu

Bavɛrsɛ 10 ya Biblia na ntína ya Botatoli ya Molimo na lisumu mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Yoane 16:8

Bongo tango akoya, akotalisa bato ya mokili na tina na lisumu, na tina na bosembo mpe na tina na kosambisama:

02 Yoane 16:9-11

na tina na lisumu, pamba te bandimaka Ngai te; na tina na bosembo, pamba te nakeyi epai ya Tata, mpe bokomona Ngai lisusu te; na tina na kosambisama, pamba te mokonzi ya mokili oyo asili kosambisama.

03 Yoane 16:13

Tango akoya, Molimo ya bosolo, akotambolisa bino kati na bosolo nyonso; pamba te akoloba te makambo kowuta na Ye moko, kasi akoloba kaka makambo nyonso oyo akoyoka, mpe akoyebisa bino makambo oyo ekoya;

04 Tito 3:5

abikisaki biso. Asalaki bongo mpo na bosembo na biso te, kasi mpo na mawa na Ye na nzela ya Molimo Mosantu oyo akomisaki biso bato ya sika na mokolo ya mbotama na biso ya mibale.

05 Misala ya Bantoma 2:37

Tango bato bayokaki bongo, mitema na bango eyokaki pasi makasi mpe balobaki na Petelo mpe bantoma mosusu: — Bandeko, tosala nini?

06 Misala ya Bantoma 24:25

Kasi, wana Polo akomaki koloba na tina na bosembo, komikanga mpe kosambisama oyo ezali koya, Felikisi ayokaki somo mpe alobaki na ye: — Ekoki mpo na sik’oyo! Okoki kolongwa. Soki nazwi lisusu tango, nakobengisa yo.

07 Barome 2:15

Na bongo, na nzela ya bizaleli na bango, balakisaka ete misala oyo Mobeko esengaka ezali ya kokomama kati na mitema na bango. Mitema na bango etatolaka yango, ndenge moko na makanisi oyo na nzela na yango bamifundaka to bamilongisaka.

08 Ba-Ebre 4:12

Pamba te Liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya, ekotaka koleka kutu mopanga oyo ezali na minu na bangambo nyonso mibale, ekomaka kino kokabola elimo mpe molimo, mikuwa mpe mafuta oyo ezalaka kati na mikuwa, mpe esosolaka malamu makanisi mpe mikano ya motema ya moto.

09 Yoane 8:9

Tango bayokaki bongo, bango nyonso babendanaki moko sima na moninga, kobanda na mikolo. Mpe Yesu atikalaki Ye moko. Lokola mwasi yango azalaki kaka wana kati na lopango ya Tempelo,

10 1 Batesalonika 1:5

pamba te Sango Malamu na biso ekomaki epai na bino kaka na maloba te, kasi mpe na nguya, na Molimo Mosantu mpe na kondima monene. Mpe boyebi malamu ndenge nini tozalaki kovanda kati na bino mpo na bolamu na bino.

Bantína oyo etali