Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bomoto ya Molimo
Bavɛrsɛ 5 ya Biblia na ntína ya Bomoto ya Molimo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Kasi Molobeli, Molimo Mosantu oyo Tata akotinda na Kombo na Ngai, akoteya bino makambo nyonso mpe akosunga bino mpo ete bobosana te nyonso oyo nayebisaki bino.
Tango akoya, Molimo ya bosolo, akotambolisa bino kati na bosolo nyonso; pamba te akoloba te makambo kowuta na Ye moko, kasi akoloba kaka makambo nyonso oyo akoyoka, mpe akoyebisa bino makambo oyo ekoya;
Nzokande, Nzambe atalisaki biso yango na nzela ya Molimo na Ye; pamba te Molimo ayebaka nyonso, ezala bozindo ya makanisi ya Nzambe. Nani kati na bato ayebi makanisi ya moto, soki kaka molimo oyo ezali kati na moto yango te? Ndenge moko mpe moko te ayebi makanisi ya Nzambe, longola kaka Molimo na Ye.
Ndenge moko mpe Molimo ayaka kosunga biso kati na bolembu na biso; pamba te toyebi te kosambela na lolenge oyo esengeli, kasi Molimo Ye moko abondelaka mpo na biso na maloba oyo moto akoki koloba te.
Boye, Petelo atunaki ye: — Ananiasi, ndenge nini Satana atondisi motema na yo mpo ete okosa Molimo Mosantu, mpe obomba ndambo ya mbongo oyo otekeli elanga na yo? Boni, liboso ete oteka yango, ezalaki ya yo te? Mpe sima na koteka yango, okokaki te kosala na mbongo yango likambo nyonso oyo motema na yo elingi? Mpo na nini ozwaki likanisi ya kosala likambo ya boye? Okosi bato te, kasi okosi nde Nzambe!