Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Nzambe Asalaka makambo nyonso
Bavɛrsɛ 9 ya Biblia na ntína ya Nzambe Asalaka makambo nyonso mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Kati na Klisto, Nzambe aponaki biso lisusu mpo ete tokitana na libula na biso, kolanda mabongisi ya Ye oyo akokisaka nyonso, kolanda makanisi ya mokano na Ye,
Mpe toyebi malamu ete kati na makambo nyonso, Nzambe asalaka mpo na bolamu ya bato oyo balingaka Ye, ba-oyo babengama kolanda mabongisi na Ye.
pamba te ezali na nzela na Yesu nde nyonso ekelama kati na Likolo mpe na mabele, bikelamu oyo emonanaka mpe oyo emonanaka te, milimo mpe bokonzi ya milimo, bakonzi ya milimo mpe banguya. Ezali na nzela na Yesu mpe mpo na Yesu nde nyonso ekelama. Yesu azali liboso na nyonso, mpe nyonso esimbama kati na Ye;
Yawe asalaka nyonso oyo alingi, kuna na likolo mpe awa na mabele, kati na bibale minene mpe kati na mozindo nyonso.
Ezali Ye nde abongolaka tango mpe makambo, alongolaka bakonzi mpe atombolaka bakonzi, apesaka bwanya epai ya bato ya bwanya mpe boyebi epai ya bato ya mayele.
Nasakolaki makambo ya suka na ebandeli; wuta kala penza, nasakolaki makambo oyo ekoya. Nalobaki: « Mabongisi na Ngai ekolongisama, mpe nakosala nyonso oyo nasepeli kosala. »
Yawe asalaka makambo nyonso na tina, ezala bato mabe, asala bango mpo na mokolo ya pasi.
Pamba te biloko nyonso ewutaka epai na Ye, na nzela na Ye mpe mpo na Ye. Tika ete nkembo ezonga epai na Ye mpo na libela na libela! Amen!
Kasi mikano ya Yawe etikalaka mpo na seko, mabongisi ya motema na Ye, mpo na bikeke nyonso.