Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Liloba ya Nzambe
Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya, mwinda na makolo na biso mpe bilei oyo milimo na biso esengelaki. Eumelaka libela na libela, ekómisaka biso na bwanya, mpe ebongisaka biso mpo na mosala nyonso ya malamu. Bavɛrsɛ oyo epelisaka bolingo mpo na Makomi mpe mpo na Nzambe oyo alobaka.
Makomi nyonso ekomama na nguya ya Nzambe mpe ezali na tina mpo na koteya, kopamela, kozongisa na nzela mpe kolakisa bato kotambola kolanda bosembo,
Nabatelaka liloba na Yo kati na motema na ngai mpo ete nasala masumu te na miso na Yo.
Pamba te Liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya, ekotaka koleka kutu mopanga oyo ezali na minu na bangambo nyonso mibale, ekomaka kino kokabola elimo mpe molimo, mikuwa mpe mafuta oyo ezalaka kati na mikuwa, mpe esosolaka malamu makanisi mpe mikano ya motema ya moto.
Sala ete maloba ya buku oyo ya Mobeko ewumela tango nyonso na monoko na yo; tangaka mpe kanisaka yango butu mpe moyi, mpo ete osala kolanda nyonso oyo ekomami kati na yango. Na bongo nde okokende liboso mpe okolonga kati na misala na yo nyonso.
Liloba na Yo ezali mwinda mpo na makolo na ngai, mpe pole mpo na nzela na ngai.
Matiti ekawukaka mpe fololo elembaka, kasi Liloba na Nzambe na biso ewumelaka seko na seko. »
Tala ndenge mitindo na Yo ezali elengi na monoko na ngai! Ezali malamu koleka mafuta ya nzoyi.
Yesu azongisaki: — Ekomama: « Moto akobika na lipa kaka te, kasi mpe na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Nzambe. »
Lokola bana oyo babotami sika, bolingaka makasi komela miliki ya peto ya Liloba mpo ete bokola na nzela na yango mpo na kozwa lobiko,
Bongo Yesu alobaki na Bayuda oyo bandimaki Ye: — Soki bowumeli kati na Liloba oyo nateyaki bino, bokozala penza bayekoli na Ngai,