Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Moto akozala na bomoi na limpa kaka te
Bavɛrsɛ 14 ya Biblia na ntína ya Moto akozala na bomoi na limpa kaka te mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Yesu azongisaki: — Ekomama: « Moto akobika na lipa kaka te, kasi mpe na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Nzambe. »
Abukaki lolendo na yo, abomaki yo nzala mpe aleisaki yo mana oyo yo mpe batata na yo botikalaki koyeba te, mpo na koteya yo ete moto abikaka kaka na lipa te, kasi mpe na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Yawe.
Yesu azongiselaki ye: — Ekomama: « Moto akobika na lipa kaka te. »
Yesu azongiselaki bango: — Ngai nazali lipa oyo epesaka bomoi. Moto nyonso oyo akoya epai na Ngai akoyoka lisusu nzala te, mpe moto nyonso oyo akondima Ngai akoyoka lisusu posa ya mayi te.
Napengwaki te mosika ya mateya ya bibebu na Ye; nabatelaki yango lokola bomengo ya kitoko, koleka lipa na ngai ya mokolo na mokolo.
Ngai nde nazali lipa ya bomoi oyo ewuti na Likolo; moto nyonso oyo akolia lipa yango, akozala na bomoi ya seko; mpe lipa oyo nakopesa mpo ete mokili ezwa bomoi ezali nde nzoto na Ngai.
Ezali Molimo nde apesaka bomoi; mosuni ezali na eloko te. Maloba oyo nalobi na bino ezali Molimo mpe bomoi.
Tango kaka nayokaki maloba na Yo, nayambaki yango na esengo; maloba yango esepelisaki ngai mpe etondisaki motema na ngai na esengo; pamba te babengaka ngai na Kombo na Yo, Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.
Simona Petelo azongisaki: — Nkolo, tokokende epai ya nani? Yo nde ozali na maloba ya bomoi ya seko.
Na mikolo ekoya, » elobi Nkolo Yawe, « nakotinda nzala makasi kati na mokili; ekozala te nzala ya bilei to posa ya mayi, kasi ekozala nzala ya koyoka Liloba na Yawe.
Lokola bana oyo babotami sika, bolingaka makasi komela miliki ya peto ya Liloba mpo ete bokola na nzela na yango mpo na kozwa lobiko,
Yesu alobaki na bango: — Bilei na Ngai ezali: kosala mokano ya Ye oyo atindaki Ngai mpe kosilisa mosala oyo apesaki Ngai.
« Boya kolia bilei na ngai mpe komela vino oyo nakamoli,
Tala ndenge mitindo na Yo ezali elengi na monoko na ngai! Ezali malamu koleka mafuta ya nzoyi.