Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kotɛlɛma likoló ya Liloba
Bavɛrsɛ 9 ya Biblia na ntína ya Kotɛlɛma likoló ya Liloba mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.
Matiti ekawukaka mpe fololo elembaka, kasi Liloba na Nzambe na biso ewumelaka seko na seko. »
kasi Liloba na Nkolo ewumelaka seko na seko. » Nzokande, Liloba yango ezali nde Sango Malamu oyo bateyaki bino.
Yango wana, moto nyonso oyo ayoki makambo oyo nawuti koloba mpe atie yango na misala akokani na moto ya mayele oyo atongaki ndako na ye na likolo ya libanga. Tango mvula ebetaki makasi, mayi mpe mopepe eyaki makasi, emibwakaki na ndako yango; kasi atako bongo, ndako ekweyaki te, pamba te miboko na yango etongamaki na likolo ya libanga.
Yawe, liloba na Yo ezali mpo na seko, epikama kati na likolo;
Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.
Moboko ya liloba na Yo ezali bosolo, mpe mibeko nyonso ya bosembo na Yo ezali mpo na libela.
Nzokande, batiaka tembe na Makomi te. Boye, soki abengaki « banzambe, » bato oyo epai banani Liloba na Nzambe eyaki,
ndenge wana mpe liloba oyo ebimaka na monoko na Ngai ezalaka: ezongaka pamba te epai na Ngai, soki esali nanu te mokano na Ngai, mpe soki ekokisi nanu te mabongisi oyo natindelaki yango.