Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Nguya ya Liloba

Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Nguya ya Liloba mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Ba-Ebre 4:12

Pamba te Liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya, ekotaka koleka kutu mopanga oyo ezali na minu na bangambo nyonso mibale, ekomaka kino kokabola elimo mpe molimo, mikuwa mpe mafuta oyo ezalaka kati na mikuwa, mpe esosolaka malamu makanisi mpe mikano ya motema ya moto.

02 Ezayi 55:11

ndenge wana mpe liloba oyo ebimaka na monoko na Ngai ezalaka: ezongaka pamba te epai na Ngai, soki esali nanu te mokano na Ngai, mpe soki ekokisi nanu te mabongisi oyo natindelaki yango.

03 Jeremi 23:29

« boni, maloba na Ngai ezali lokola moto te? To lokola marto te oyo ebukaka mabanga biteni-biteni? » elobi Yawe.

04 Barome 1:16

Nazali na soni te mpo na Sango Malamu, pamba te ezali nguya ya Nzambe mpo na lobiko ya moto nyonso oyo andimaka: liboso, ya Moyuda, mpe sima, ya Mogreki.

05 1 Batesalonika 2:13

Mpe tala mpo na nini tozongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe: tango boyambaki Liloba na Nzambe, oyo toteyaki bino, bondimaki yango te lokola liloba oyo ewuti epai ya bato, kasi lokola penza Liloba na Nzambe, oyo ezali kosala kati na bino oyo bozali na kondima.

06 Luka 1:37

Pamba te Nzambe alembanaka eloko te.

07 Ebandeli 1:3

Mpe Nzambe alobaki: « Tika ete pole ezala! » Mpe pole ezalaki.

08 Yoane 6:63

Ezali Molimo nde apesaka bomoi; mosuni ezali na eloko te. Maloba oyo nalobi na bino ezali Molimo mpe bomoi.

Bantína oyo etali