Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kobomba Liloba na motema

Bavɛrsɛ 6 ya Biblia na ntína ya Kobomba Liloba na motema mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Banzembo 119:11

Nabatelaka liloba na Yo kati na motema na ngai mpo ete nasala masumu te na miso na Yo.

02 Deteronomi 6:6-7

Tika ete mibeko oyo napesi yo lelo, ewumela kati na motema na yo. Okoteyaka yango na bana na yo tango ozali na ndako, tango ozali kotambola na nzela, tango olali mpe tango olamuki.

03 Bakolose 3:16

Tika ete Liloba ya Klisto, kati na bomengo na yango nyonso, evanda kati na bino; boteyanaka mpe bokebisanaka na bwanya nyonso, na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu mpe banzembo oyo ewutaka na Molimo. Mpe boyembelaka Nzambe na kozongisa matondi kati na mitema na bino.

04 Banzembo 119:9

Ndenge nini elenge akoki kowumela na nzela ya sembo? Ezali na kotambola kolanda liloba na Yo.

05 Masese 7:1-3

Mwana na ngai, batela mibeko na ngai mpe bomba yango malamu kati na motema na yo. Batela mateya na ngai malamu, mpe okozala na bomoi; batela mibeko na ngai lokola mbuma ya liso na yo. Lata yango na loboko na yo lokola lopete, koma yango na etando ya motema na yo.

06 Deteronomi 11:18

Bobatela malamu kati na mitema mpe milimo na bino maloba na ngai oyo, bokanga yango na maboko na bino lokola bilembo, mpe botia yango na bilongi na bino lokola elembo.

Bantína oyo etali