Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Liloba etikalaka libela na libela

Bavɛrsɛ 10 ya Biblia na ntína ya Liloba etikalaka libela na libela mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Ezayi 40:8

Matiti ekawukaka mpe fololo elembaka, kasi Liloba na Nzambe na biso ewumelaka seko na seko. »

02 1 Petelo 1:24-25

Pamba te ekomama: « Bato nyonso bazalaka lokola matiti, mpe nkembo na bango nyonso ezalaka lokola bafololo ya bilanga. Matiti ekawukaka mpe fololo na yango ekweyaka, kasi Liloba na Nkolo ewumelaka seko na seko. » Nzokande, Liloba yango ezali nde Sango Malamu oyo bateyaki bino.

03 Matayo 24:35

Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.

04 Banzembo 119:89

Yawe, liloba na Yo ezali mpo na seko, epikama kati na likolo;

05 Malako 13:31

Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.

06 Banzembo 119:152

Wuta kala, ngai nayebi, na nzela ya malako na Yo, ete otia mibeko yango mpo na libela.

07 Luka 21:33

Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.

08 Banzembo 100:5

Pamba te Yawe azali malamu; bolingo na Ye ewumelaka seko na seko, mpe boyengebene na Ye, libela na libela.

09 Ezayi 59:21

« Bongo mpo na Ngai, » elobi Yawe, « tala boyokani na Ngai elongo na bango: Molimo na Ngai, oyo azali epai na yo, mpe maloba na Ngai, oyo natiaki na monoko na yo ekolongwa te, na monoko na yo to na minoko ya bana na yo to na minoko ya bakitani na bango, kobanda kaka na tango oyo mpe libela na libela, » elobi Yawe.

10 Banzembo 12:6-7

Yawe alobi: « Mpo ete bazali konyokola babola mpe kolelisa bato oyo bakelela, natelemi sik’oyo mpo na kobikisa batiolami. » Maloba ya Yawe ezalaka peto lokola palata oyo balekisi na moto mpe bapetoli mbala sambo.

Bantína oyo etali