Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mwinda na makolo na ngai
Bavɛrsɛ 9 ya Biblia na ntína ya Mwinda na makolo na ngai mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Liloba na Yo ezali mwinda mpo na makolo na ngai, mpe pole mpo na nzela na ngai.
Emoniseli ya liloba na Yo engengisaka, epesaka bazoba mayele.
Mibeko ezali mwinda, mateya ezali pole, makebisi mpe pamela ezali nzela ya bomoi,
Tozali lisusu kondima bosolo ya maloba ya basakoli oyo, bozali solo kosala malamu wana bozali kotia makanisi na bino kati na yango lokola na mwinda oyo ezali kopela kati na esika ya molili, kino tongo etana mpe monzoto ya tongo engenga kati na mitema na bino.
Yesu alobaki lisusu na bato: — Nazali pole ya mokili; moto nyonso oyo alandaka Ngai akotikala kotambola kati na molili te, kasi akozwa pole ya bomoi.
Mibeko ya Yawe ezali ya kokoka, epesaka biso lisusu nguya ya kozala na bomoi. Maloba na Ye nyonso ezali ya solo, ebongi na kotiela yango elikya, mpe epesaka bwanya epai ya zoba.
Tinda mwinda mpe solo na Yo mpo ete ekamba mpe emema ngai na ngomba na Yo ya bule epai wapi ovandaka;
Nzokande, nzela ya bato ya sembo ezali lokola pole ya tongo makasi, oyo kongenga na yango eyaka malembe-malembe kino tango moyi ekobima makasi.
Nabatelaka liloba na Yo kati na motema na ngai mpo ete nasala masumu te na miso na Yo.