Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Makomi

Bavɛrsɛ 5 ya Biblia na ntína ya Makomi mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 2 Timote 3:16

Makomi nyonso ekomama na nguya ya Nzambe mpe ezali na tina mpo na koteya, kopamela, kozongisa na nzela mpe kolakisa bato kotambola kolanda bosembo,

02 2 Petelo 1:20-21

Liboso na nyonso, boyeba malamu ete moko te, na mayele na ye moko, akoki kolimbola maloba ya basakoli, oyo ezali kati na Makomi, pamba te maloba yango ya basakoli eyaki te na nzela ya mokano ya moto, kasi ezali Molimo Mosantu nde atindikaki bato na koloba kowuta na Nzambe.

03 Banzembo 19:7

Moyi ebimaka wuta na songe moko ya likolo, mpe esukisaka mobembo na yango na songe mosusu; eloko moko te ezangaka kozwa molunge na yango.

04 Barome 15:4

Nzokande, makambo nyonso oyo ekomama kala ekomamaki mpo na koteya biso, mpo ete na nzela ya kokanga motema mpe malendisi oyo Makomi epesaka, tozala na elikya.

05 Yoane 17:17

Bulisa bango na nzela ya bosolo na Yo, Liloba na Yo ya solo.

Bantína oyo etali