Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Komanyola Liloba

Bavɛrsɛ 9 ya Biblia na ntína ya Komanyola Liloba mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Jozue 1:8

Sala ete maloba ya buku oyo ya Mobeko ewumela tango nyonso na monoko na yo; tangaka mpe kanisaka yango butu mpe moyi, mpo ete osala kolanda nyonso oyo ekomami kati na yango. Na bongo nde okokende liboso mpe okolonga kati na misala na yo nyonso.

02 Banzembo 1:2-3

kasi asepelaka na mibeko ya Yawe mpe akanisaka yango butu mpe moyi. Azali lokola nzete oyo balona pene ya mayi, oyo ebotaka mbuma na eleko na yango, mpe makasa na yango ekawukaka te; misala na ye nyonso etambolaka malamu.

03 Banzembo 119:15

Nakanisaka malako na Yo mpe natambolaka na banzela na Yo.

04 Banzembo 119:97

Nalingaka mibeko na Yo mingi! Nakanisaka yango mikolo nyonso.

05 Bafilipi 4:8

Bandeko, mpo na kosukisa, tika ete makambo nyonso oyo ezali ya solo, kitoko, sembo, peto, makambo oyo bato bakoki kolinga, kosepela na yango, kolula mpe kokumisa ezala tina ya makanisi na bino.

06 Banzembo 119:148

Nalamukaka na kati-kati ya butu mpo na kokanisa mitindo na Yo.

07 Banzembo 63:6

Nakotonda lokola moto oyo asili kolia misuni kitoko mpe mafuta; bibebu na ngai ekoganga na esengo mpe monoko na ngai ekokumisa Yo.

08 Banzembo 143:5

Nakanisi mikolo ya kala, namilobeli nyonso oyo osala, nakanisi malamu mosala ya maboko na Yo.

09 Banzembo 77:12

Nakanisaka misala minene ya Yawe, bikamwa na Yo ya kala.

Bantína oyo etali