Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mboto ya Liloba
Bavɛrsɛ 15 ya Biblia na ntína ya Mboto ya Liloba mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Tala ndimbola ya lisese yango: Nkona ezali Liloba na Nzambe.
Nkona oyo ekweyaki na mabele ya malamu ezali bato oyo, na mitema ya sembo mpe ya malamu, bayokaka Liloba, babatelaka yango, bayikaka mpiko mpe babotaka bambuma.
Bamosusu bazali lokola nkona oyo ekweyi na mabele ya malamu: bayoki malamu Liloba, bandimi yango mpe baboti bambuma; moko aboti bambuma tuku misato; mosusu, bambuma tuku motoba; mpe mosusu lisusu, bambuma nkama moko.
Pamba te bobotamaki mbotama ya sika na nzela ya Liloba na Nzambe, oyo ezali nkona oyo epesaka bomoi mpe ewumelaka seko na seko; kasi na nzela te ya nkona ya bato oyo bakufaka.
Nkona oyo ekweyi na mabele ya malamu ezali moto oyo ayoki Liloba mpe asosoli yango malamu; bongo akobota bambuma: epai ya moko, bambuma ekoki komonana nkama moko; epai ya mosusu, bambuma tuku motoba; mpe epai ya mosusu lisusu, bambuma tuku misato.
Moloni alonaka Liloba.
Kasi ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu, ebimisaki mito oyo ekolaki mpe ekomaki banzete: nkona moko na moko ebotaki bambuma nkama moko. Tango Yesu asilisaki koloba bongo, agangaki: — Tika ete moto nyonso oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka!
Azwaki maloba mpe akomaki koteya bango makambo ebele na masese; azalaki koloba: — Moloni moko akendeki kolona na elanga na ye. Wana azalaki kobwaka nkona na ye, ndambo ekweyaki pembeni ya nzela; bandeke eyaki mpe eliaki yango. Ndambo mosusu ekweyaki na esika etonda na mabanga, esika oyo mabele ezalaki mingi te, ebimisaki mito noki mpo ete mabele yango ezalaki na bozindo te; kasi tango moyi ebimaki, mito yango ezikaki mpe ekawukaki mpo ete ezalaki na misisa te. Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube, banzube ekolaki mpe efinaki-finaki mwa banzete na yango; kasi ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu mpe ebotaki bambuma: nkona moko ebotaki bambuma nkama moko; mosusu, bambuma tuku motoba; mpe mosusu, bambuma tuku misato. Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka!
Yango wana, bobwaka makambo nyonso ya bosoto mpe misala nyonso ya mabe, bondima na komikitisa Liloba oyo elonamaki kati na mitema na bino, pamba te ezali na nguya ya kobikisa bino.
Ndenge mvula mpe mvula ya pembe enokaka wuta na likolo mpe ezongaka te na likolo soki epolisi mabele te, soki ebotisi yango bambuma mpe bafololo te, soki epesi nkona te na moloni mpe bilei te na moto oyo aliaka, ndenge wana mpe liloba oyo ebimaka na monoko na Ngai ezalaka: ezongaka pamba te epai na Ngai, soki esali nanu te mokano na Ngai, mpe soki ekokisi nanu te mabongisi oyo natindelaki yango.
Yesu alobaki lisusu: — Bokonzi ya Nzambe ekokani na moto oyo abwaki nkona na mabele: butu mpe moyi, alala to alamuka, nkona ebimisaka moto, ekolaka yango moko mpe ayebaka te ndenge nini yango ezali kokola;
Ngai nalonaki, Apolosi asopaki mayi, kasi Nzambe azalaki kokolisa.
— Moloni moko akendeki kolona na elanga na ye. Wana azalaki kobwaka nkona na ye, ndambo ekweyaki pembeni ya nzela; baleki nzela banyataki-nyataki yango, mpe bandeke ya likolo eliaki yango.
Nazali koloba na bino penza ya solo: soki mbuma ya ble oyo ekweyi na mabele ekufi te, mbuma yango ekotikala kaka yango moko. Kasi soki ekufi, ekobota solo bambuma ebele.
Bomikosa te: Nzambe amitikaka te ete batiola Ye. Oyo moto alonaka, yango nde abukaka. Moto oyo alonaka mpo na kosepelisa baposa ya bomoto na ye akobuka libebi, moto oyo alonaka mpo na kosepelisa Molimo akobuka bomoi ya seko.