Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mbeka ya masanzoli

Bavɛrsɛ 10 ya Biblia na ntína ya Mbeka ya masanzoli mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

Bakisá bavɛrsɛ nyɔnsɔ 10 Kela kɔ́nti ya ofele mpo na kokanga yango na motó.
01 Ba-Ebre 13:15 Vɛrsɛ ya ntina

Yango wana, na nzela ya Yesu, tobonzelaka Nzambe tango nyonso mbeka ya masanzoli, elingi koloba: mbuma ya bibebu oyo etatolaka polele Kombo na Ye.

02 Banzembo 50:23

Moto oyo abonzaka matondi lokola mbeka, apesaka ngai lokumu; mpe moto oyo asalaka keba na etamboli na ye, nakotalisa ye lobiko ya Nzambe. »

03 Ba-Ebre 13:16

Bobosanaka te kosala bolamu mpe kosunga bato, pamba te yango nde bambeka oyo Nzambe asepelaka na yango.

04 Banzembo 116:17

Nakobonzela Yo mbeka mpo na kozongisa matondi, mpe nakobelela Kombo ya Yawe.

05 Yona 2:9

Bato oyo bakangamaka na banzambe ya bikeko ezanga tina babungisaka bolingo oyo Nzambe alingaka bango.

06 Banzembo 27:6

Bongo, nakotombola moto na ngai na likolo ya banguna oyo bazingeli ngai; nakobanda kobonza, na se ya lokito ya esengo, bambeka kati Ndako na Ye ya bule; nakobanda koyembela Yawe mpe kobetela Ye mindule.

07 Banzembo 107:22

Tika ete babonza bambeka ya kozongisa matondi mpe bapanza sango ya misala na Ye na koganga na esengo!

08 Banzembo 54:6

Tala, Nzambe azali lisungi na ngai, Nkolo azali eyekamelo na ngai.

09 Oze 14:2

Isalaele, zongela Yawe, Nzambe na yo, pamba te ezali masumu na yo nde ekweyisaki yo.

10 Banzembo 141:2

Liboso na Yo, tika ete libondeli na ngai ezala lokola mbeka ya malasi, mpe botombwami ya maboko na ngai ezala lokola mbeka ya pokwa!

Bantína oyo etali