Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Masanzoli

Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Masanzoli mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Banzembo 150:6

Tika ete nyonso oyo ezali na pema ekumisa Yawe! Bokumisa Yawe!

02 Banzembo 34:1

Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango akosanaki liboma liboso ya Abimeleki oyo abenganaki ye, mpe akendeki.

03 Banzembo 145:3

Yawe azali monene, abongi na lokumu; moko te akoki komeka mozindo ya monene na Ye.

04 Banzembo 9:1

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.

05 Ba-Ebre 13:15

Yango wana, na nzela ya Yesu, tobonzelaka Nzambe tango nyonso mbeka ya masanzoli, elingi koloba: mbuma ya bibebu oyo etatolaka polele Kombo na Ye.

06 Banzembo 147:1

Bokumisa Yawe! Tala ndenge ezali malamu kosanzola Nzambe na biso, mpe ndenge ezali kitoko kokumisa Ye!

07 Banzembo 103:1

Nzembo ya Davidi. Eh molimo na ngai, pambola Yawe! Tika ete motema na ngai mobimba epambola Kombo na Ye ya bule!

08 Banzembo 71:8

Tika ete monoko na ngai etonda na masanzoli mpo na lokumu na Yo; tika ete etatolaka tango nyonso kongenga ya nkembo na Yo.

Bantína oyo etali