Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Losambo (kogumbamela Nzambe)

Bavɛrsɛ 10 ya Biblia na ntína ya Losambo (kogumbamela Nzambe) mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Yoane 4:24

Nzambe azali Molimo; esengeli ete bato oyo bagumbamelaka Ye bagumbamela Ye kati na Molimo mpe kati na solo.

02 Banzembo 29:2

Bopesa Yawe nkembo oyo ekoki na lokumu ya Kombo na Ye; bogumbamela Yawe kati na kongenga ya bosantu na Ye.

03 Barome 12:1

Bandeko, mpo na mawa oyo Nzambe atalisi biso, nazali kosenga na bino ete bokabaka banzoto na bino epai ya Nzambe lokola mbeka ya bomoi, ya bule mpe esepelisaka Nzambe. Ekozala mpo na bino losambo ya solo kolanda ndenge esengeli.

04 Emoniseli 4:11

« Nkolo mpe Nzambe na biso, obongi na nkembo, na lokumu mpe na nguya, pamba te Yo nde okela biloko nyonso: ezalaki mpe ekelamaki mpo na mokano na Yo. »

05 Banzembo 100:2

Bosalela Yawe na esengo, mpe boya liboso na Ye na banzembo ya esengo.

06 Banzembo 95:6

Boya, togumbama mpe tofukama, tobuka mabolongo na biso liboso ya Yawe, Mokeli na biso!

07 Banzembo 96:9

Bogumbama liboso ya Yawe oyo bosantu na Ye ezali kongenga makasi! Bino bavandi ya mokili mobimba, bolenga liboso na Ye!

08 Ba-Ebre 12:28

Yango wana, lokola tozali kozwa Bokonzi oyo eninganaka te, tozongisaka matondi mpe tosalelaka Nzambe na lolenge oyo esepelisaka Ye: na botosi mpe na kobanga.

09 Kobima 34:14

Bogumbamela nzambe mosusu te, pamba te Yawe andimaka bombanda te; Kombo na Ye ezali Nzambe ya zuwa.

10 Banzembo 99:5

Bonetola Yawe, Nzambe na biso, mpe bogumbama liboso ya enyatelo makolo na Ye; azali Mosantu.

Bantína oyo etali