Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Koyembela Nzambe

Bavɛrsɛ 9 ya Biblia na ntína ya Koyembela Nzambe mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Banzembo 96:1

Boyembela Yawe nzembo ya sika! Bino nyonso, bato ya mokili mobimba, boyembela Yawe!

02 Banzembo 98:1

Nzembo. Boyembela Yawe nzembo ya sika, pamba te asalaka makambo ya kokamwa! Na nguya mpe na bokonzi na Ye ya bonzambe, alongaki.

03 Ba-Efeso 5:19

bolendisanaka na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu, mpe na nzela ya banzembo oyo ewutaka na Molimo; boyembelaka mpe bosanzolaka Nkolo wuta na mozindo ya mitema na bino;

04 Banzembo 100:2

Bosalela Yawe na esengo, mpe boya liboso na Ye na banzembo ya esengo.

05 Bakolose 3:16

Tika ete Liloba ya Klisto, kati na bomengo na yango nyonso, evanda kati na bino; boteyanaka mpe bokebisanaka na bwanya nyonso, na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu mpe banzembo oyo ewutaka na Molimo. Mpe boyembelaka Nzambe na kozongisa matondi kati na mitema na bino.

06 Banzembo 95:1

Boya, toganga na esengo mpo na Yawe! Tobetela Libanga na biso maboko, pamba te azali Mobikisi na biso!

07 Banzembo 147:7

Boyembela Yawe nzembo ya matondi! Bobetela Nzambe na biso lindanda mpo na kosanzola Ye!

08 Banzembo 33:3

Boyembela Yawe nzembo ya sika, bobetisa bibetelo mindule elongo na koganga ya esengo.

09 Banzembo 104:33

Nakoyembela Yawe bomoi na ngai mobimba; nakoyembela Nzambe na ngai tango nyonso nazali na bomoi.

Bantína oyo etali