Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Motema ya botɔndi

Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Motema ya botɔndi mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Bakolose 3:16

Tika ete Liloba ya Klisto, kati na bomengo na yango nyonso, evanda kati na bino; boteyanaka mpe bokebisanaka na bwanya nyonso, na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu mpe banzembo oyo ewutaka na Molimo. Mpe boyembelaka Nzambe na kozongisa matondi kati na mitema na bino.

02 1 Batesalonika 5:18

bozongisaka matondi kati na makambo nyonso, pamba te yango nde mokano ya Nzambe mpo na bino kati na Yesu-Klisto.

03 Banzembo 100:4

Bokota na bikuke na Ye na kozongisa matondi, bokota na lopango na Ye na kokumisa. Bosanzola Ye, bopambola Kombo na Ye.

04 Bafilipi 4:6

Bomitungisaka ata na likambo moko te; kasi na makambo nyonso, botalisaka baposa na bino epai ya Nzambe na nzela ya losambo, ya mabondeli elongo na matondi.

05 Ba-Efeso 5:20

bozongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe Tata mpo na makambo nyonso, na Kombo na Yesu-Klisto, Nkolo na biso;

06 Banzembo 107:8-9

Tika ete basanzola Yawe mpo na bolingo mpe bikamwa na Ye mpo na bato! Apesaki mayi epai ya bato oyo bazalaki na posa ya mayi mpe bilei epai ya bato oyo bazalaki na nzala.

07 Ba-Ebre 12:28

Yango wana, lokola tozali kozwa Bokonzi oyo eninganaka te, tozongisaka matondi mpe tosalelaka Nzambe na lolenge oyo esepelisaka Ye: na botosi mpe na kobanga.

08 2 Bakolinto 4:15

Makambo oyo nyonso ezali mpo na litomba na bino, mpo ete ngolu efuluka koleka kati na bato ebele, mpe ete losambo ya kozongisa matondi ekoma mingi mpo na nkembo ya Nzambe.

Bantína oyo etali