Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Matɔndi

Bavɛrsɛ 10 ya Biblia na ntína ya Matɔndi mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Banzembo 100:4

Bokota na bikuke na Ye na kozongisa matondi, bokota na lopango na Ye na kokumisa. Bosanzola Ye, bopambola Kombo na Ye.

02 Banzembo 95:2

Tokende liboso na Ye elongo na mabondeli ya kozongisa matondi, tobetela Ye maboko elongo na banzembo.

03 Banzembo 118:1

Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu, pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko!

04 Ba-Efeso 5:20

bozongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe Tata mpo na makambo nyonso, na Kombo na Yesu-Klisto, Nkolo na biso;

05 2 Bakolinto 9:15

Tika ete matondi epesamela Nzambe mpo na likabo na Ye, oyo bato bakoki kolimbola te!

06 Banzembo 136:1

Bosanzola Yawe, mpo ete azali malamu; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko!

07 1 Batesalonika 5:18

bozongisaka matondi kati na makambo nyonso, pamba te yango nde mokano ya Nzambe mpo na bino kati na Yesu-Klisto.

08 Banzembo 107:1

Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu, mpe bolingo na Ye ewumelaka seko na seko!

09 Bakolose 3:17

Mpe nyonso oyo bokosala, ezala na maloba to na misala, bosalaka yango na Kombo ya Nkolo Yesu, na kozongisa matondi epai ya Nzambe Tata na nzela ya Yesu-Klisto.

10 Bafilipi 4:6

Bomitungisaka ata na likambo moko te; kasi na makambo nyonso, botalisaka baposa na bino epai ya Nzambe na nzela ya losambo, ya mabondeli elongo na matondi.

Bantína oyo etali