Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kogumbamela Nzambe

Bavɛrsɛ 13 ya Biblia na ntína ya Kogumbamela Nzambe mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

Bakisá bavɛrsɛ nyɔnsɔ 13 Kela kɔ́nti ya ofele mpo na kokanga yango na motó.
01 Banzembo 95:6 Vɛrsɛ ya ntina

Boya, togumbama mpe tofukama, tobuka mabolongo na biso liboso ya Yawe, Mokeli na biso!

02 Banzembo 99:5

Bonetola Yawe, Nzambe na biso, mpe bogumbama liboso ya enyatelo makolo na Ye; azali Mosantu.

03 Emoniseli 4:11

« Nkolo mpe Nzambe na biso, obongi na nkembo, na lokumu mpe na nguya, pamba te Yo nde okela biloko nyonso: ezalaki mpe ekelamaki mpo na mokano na Yo. »

04 Banzembo 29:2

Bopesa Yawe nkembo oyo ekoki na lokumu ya Kombo na Ye; bogumbamela Yawe kati na kongenga ya bosantu na Ye.

05 Banzembo 96:9

Bogumbama liboso ya Yawe oyo bosantu na Ye ezali kongenga makasi! Bino bavandi ya mokili mobimba, bolenga liboso na Ye!

06 Banzembo 8:1

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi; ezali ya koyemba na lindanda ya bato ya Gati.

07 Emoniseli 5:12

mpe bazalaki koloba na mongongo makasi: « Mpate oyo babomaki abongi na kozwa nguya, bomengo, bwanya mpe makasi, lokumu, nkembo mpe masanzoli. »

08 Emoniseli 5:13

Bongo nayokaki bikelamu nyonso oyo ezalaka kati na Lola, na mabele, na se ya mabele mpe na likolo ya ebale monene; bango nyonso bazalaki koloba: « Tika ete masanzoli mpe lokumu, nkembo mpe nguya ezonga epai ya Mpate mpe epai na Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi mpo na libela na libela! »

09 Banzembo 145:3

Yawe azali monene, abongi na lokumu; moko te akoki komeka mozindo ya monene na Ye.

10 Ezayi 6:3

Serafe moko na moko azalaki koganga na mosusu: « Bule, Bule, Bule, Yawe, Mokonzi ya mampinga! Mokili mobimba etondi na nkembo na Ye! »

11 Banzembo 63:3

Natalaki Yo kati na Esika ya bule mpo na komona makasi mpe nkembo na Yo.

12 1 Masolo ya Kala 16:29

Bosanzola Yawe mpe bopesa Kombo na Ye nkembo! Bomema makabo mpe boya liboso na Ye, bogumbamela Yawe mpo na kongenga ya bosantu na Ye!

13 Banzembo 113:3

Longwa na este kino na weste, tika ete Kombo ya Yawe epambolama!

Bantína oyo etali