Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Pambola Nkolo
Bavɛrsɛ 9 ya Biblia na ntína ya Pambola Nkolo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Nzembo ya Davidi. Eh molimo na ngai, pambola Yawe! Tika ete motema na ngai mobimba epambola Kombo na Ye ya bule!
Eh molimo na ngai, pambola Yawe mpe kobosana ata moko te kati na misala malamu na Ye!
Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango akosanaki liboma liboso ya Abimeleki oyo abenganaki ye, mpe akendeki.
Eh molimo na ngai, pambola Yawe! Yawe, Nzambe na ngai, ozali monene! Olata kongenga mpe lokumu,
Masanzoli. Nzembo ya Davidi. Nakotombola Yo, Nzambe na ngai, Mokonzi na ngai; nakopambola Kombo na Yo seko na seko. Mikolo nyonso, nakopambola Yo mpe nakokumisa Kombo na Yo libela na libela.
Bopambola Yawe, bino bikelamu na Ye nyonso, kati na bisika nyonso ya Bokonzi na Ye. Eh molimo na ngai, pambola Yawe!
Nakopambola Yawe oyo apesaka ngai toli mpe, ezala na butu, angengisaka makanisi na ngai.
Kasi biso, tokopambola Yawe, kobanda sik’oyo kino libela na libela. Bokumisa Yawe!
Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Nkolo. Bopambola Yawe, bino nyonso, basali ya Nkolo, oyo botelemaka na butu kati na Ndako ya Nkolo.