Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Nzambe oyo Amonaka
Bavɛrsɛ 13 ya Biblia na ntína ya Nzambe oyo Amonaka mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Agari amitunaki: « Boni, namoni solo Nzambe oyo azali komona ngai? » Boye, Agari apesaki Yawe oyo asololaki na ye Kombo « Ata-Eli-Royi, » oyo elakisi: Nzambe oyo azali komona ngai.
Miso na Yawe ezalaka bisika nyonso mpo na kotala bato mabe mpe bato ya malamu.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Yawe, omonaka mozindo ya bomoi na ngai mpe oyebi ngai malamu; oyebi tango navandaka mpe tango natelemaka. Liboso na ngai kokanisa, ososolaka mabongisi na ngai;
Kati na bikelamu nyonso, moko te ezali ya kobombama na miso ya Nzambe: nyonso ezali polele, mpe ezali ya kobombama te na miso ya Ye oyo akosambisa biso.
Pamba te Yawe atalaka mokili mobimba mpo na kosunga bato oyo mitema na bango emipesa mobimba epai na Ye. Nzokande, na likambo oyo, osali lokola moto oyo azangi mayele. Mpo na yango, kobanda lelo, okozalaka na bitumba tango nyonso.
Yawe atalaka wuta na likolo, amonaka bana nyonso ya bato. Wuta na evandelo na Ye, atalaka bavandi nyonso ya mokili. Ye oyo asalaka mitema nyonso ya bato asosolaka makambo nyonso oyo basalaka.
« Boni, moto akoki solo kobombama na esika ya nkuku, bongo Ngai nazanga komona ye? » elobi Yawe. « Boni, natondisa likolo mpe mabele te? » elobi Yawe.
Nakende wapi mpo na kokima Molimo na Yo? Nakima wapi mpo na kozala mosika na Yo? Soki namati na likolo, ozali kuna; soki nakeyi na mboka ya bakufi, ozali lisusu kuna. Soki nazwi mapapu ya lipekapeka mpo na kokende kovanda mosika ya ebale monene, kuna mpe loboko na Yo ekotambolisa ngai, loboko na Yo ya mobali ekosimba ngai makasi.
Miso na Ye ezali likolo ya banzela ya bato, amonaka etamboli na bango nyonso.
Yawe azali kati na Tempelo na Ye ya bule; Yawe avandi na Kiti na Ye ya Bokonzi kati na Lola. Azali kotala bato nyonso; mpe miso na Ye ezali kososola mozindo ya mitema na bango.
Solo, nzela ya moto ezali liboso ya Yawe, mpe ayekolaka malamu makambo nyonso oyo moto asalaka.
Akotika te ete lokolo na yo eselumuka; Ye oyo abatelaka yo animbaka te. Te, Ye oyo abatelaka Isalaele animbaka te mpe alalaka pongi te!
Boni, batekaka te bandeke mike mitano na motuya ya mbongo ya bibende mibale? Nzokande, Nzambe abosanaka ata ndeke moko te kati na yango. Ayebi kutu ata motango ya suki na bino. Bobanga te; boleki bandeke mike ebele na motuya.