Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Nzambe ya Seko
Bavɛrsɛ 11 ya Biblia na ntína ya Nzambe ya Seko mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Nzambe ya tango nyonso azali ekimelo na yo, azali tango nyonso Mosungi awa na se. Ezali Ye nde abenganaka banguna na yo liboso na yo mpe apesaka yo mitindo ya koboma bango.
Liboso ete bangomba ezala, liboso ete okela mabele mpe mokili, libela na libela, ozali Nzambe.
Oyebi te? Nanu oyoka te? Yawe azali Nzambe ya libela na libela, azali Mokeli ya basuka ya mabele; alembaka te mpe apemaka te, mpe moko te akoki kososola mayele na Ye.
« Nazali Alifa mpe Omega, » elobi Nkolo Nzambe, « Ye oyo azali, azalaki, mpe azali koya, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso. »
Tika ete lokumu mpe nkembo ezonga epai ya Mokonzi ya seko, Ye oyo akufaka te, amonanaka te mpe azali Nzambe se moko mpo na libela na libela! Amen.
Nalobaki: « Nzambe na ngai, Yo oyo ozali na bomoi seko na seko, koboma ngai te na kati-kati ya mikolo ya bomoi na ngai! Na kala, otiaki miboko ya mokili, mpe maboko na Yo esalaki Likolo. Bango, bakokufa; kasi Yo, okotikala seko na seko. Nzoto na bango ekolemba lokola elamba; okobongola bango lokola kazaka, mpe bakolimwa.
Boni, ozali Yawe te wuta na ebandeli? Ozali Nzambe na ngai, Mosantu na ngai, okufaka te. Oh Yawe, oponaki bango mpo na kosambisa biso; mpe Yo Libanga na ngai, olendisaki bango mpo na kopesa biso etumbu.
Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi: « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.
Balingami na ngai, ezali na likambo moko oyo bosengeli te kobosana: mpo na Nkolo, mokolo moko ezali lokola mibu nkoto moko, mpe mibu nkoto moko ezali lokola mokolo moko.
Kiti ya Bokonzi na Yo epikama wuta kala; seko na seko, ozali.
Yesu-Klisto azali ndenge moko: lobi oyo ewuti koleka, lelo, mpe libela na libela.