Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Nzambe oyo Abongwanaka te
Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Nzambe oyo Abongwanaka te mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Yesu-Klisto azali ndenge moko: lobi oyo ewuti koleka, lelo, mpe libela na libela.
« Ngai Yawe, nabongwanaka te. Mpo na yango, bino bana mibali ya Jakobi, bozali kaka.
bolamu nyonso mpe likabo nyonso ya kitoko ewutaka kaka na Likolo, epai ya Tata ya pole, oyo, kati na Ye, molili ezalaka te, mpe abongwanaka te.
Nzambe azali moto te mpo ete akosa, azali mpe mwana ya moto te mpo ete akoka kobongola makanisi na Ye. Boni, akoki solo koloba mpe kosala eloko moko te? Akoki solo kopesa elaka mpe kokokisa yango te?
Bango, bakokufa; kasi Yo, okotikala seko na seko. Nzoto na bango ekolemba lokola elamba; okobongola bango lokola kazaka, mpe bakolimwa.
Matiti ekawukaka mpe fololo elembaka, kasi Liloba na Nzambe na biso ewumelaka seko na seko. »
Kasi mikano ya Yawe etikalaka mpo na seko, mabongisi ya motema na Ye, mpo na bikeke nyonso.