Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Nkolo-na-Nguya-Nyonso

Bavɛrsɛ 11 ya Biblia na ntína ya Nkolo-na-Nguya-Nyonso mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Emoniseli 1:8

« Nazali Alifa mpe Omega, » elobi Nkolo Nzambe, « Ye oyo azali, azalaki, mpe azali koya, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso. »

02 Ebandeli 17:1

Tango Abrami akokisaki mibu tuku libwa na libwa ya mbotama, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye: « Nazali Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. Tambola liboso na Ngai mpe zala moto azanga pamela.

03 Emoniseli 4:8

Moko na moko kati na bikelamu nyonso minei azalaki na mapapu motoba, mpe nzoto na ye ezalaki etonda na miso, ezala na se ya mapapu. Butu mpe moyi, bazalaki kolemba te koloba: Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, oyo azalaki, azali, mpe azali koya, azali Bule, Bule, Bule.

04 Banzembo 91:1

Moto oyo awumelaka kati na ebombamelo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo avandaka na se ya bobatelami ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.

05 Yobo 42:2

« Nayebi ete okoki kosala makambo nyonso; eloko moko te ekoki kotelemela mabongisi na Yo.

06 Jeremi 32:17

Oh Nkolo Yawe! Yo nde osala likolo mpe mabele na nguya monene na Yo, otanda yango na makasi ya loboko na Yo: olembanaka likambo moko te.

07 Ebandeli 1:1

Na ebandeli, Nzambe akelaki Likolo mpe mokili.

08 Ezayi 40:28

Oyebi te? Nanu oyoka te? Yawe azali Nzambe ya libela na libela, azali Mokeli ya basuka ya mabele; alembaka te mpe apemaka te, mpe moko te akoki kososola mayele na Ye.

09 Matayo 19:26

Wana Yesu atalaki bango, alobaki: — Na bato, ekoki kosalema te; kasi na Nzambe, nyonso ekoki kosalema!

10 Banzembo 147:5

Nkolo na biso azali monene mpe atonda na nguya; mayele na Ye ezali na mondelo te.

11 Emoniseli 15:3

Bazalaki koyemba nzembo ya Moyize, mowumbu ya Nzambe, mpe nzembo ya Mpate: Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, misala na Yo ezali minene mpe ya kokamwa! Mokonzi ya bikolo nyonso, banzela na Yo ezali sembo mpe solo.

Bantína oyo etali