Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya NAZALI
Bavɛrsɛ 13 ya Biblia na ntína ya NAZALI mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Nzambe alobaki na Moyize: — Ngai nazali oyo akosala. Tala makambo oyo okoloba na bana ya Isalaele: « Nazali atindi ngai epai na bino. »
Yesu azongisaki: — Nazali koloba na bino penza ya solo: liboso ete Abrayami abotama, Ngai nazali.
Nzambe alobaki lisusu na Moyize: — Loba na bana ya Isalaele: « Yawe Nzambe ya bakoko na bino, Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi, atindi ngai epai na bino. » Yango nde Kombo na Ngai mpo na libela, Kombo oyo bokokanisela Ngai libela na libela.
« Nazali Alifa mpe Omega, » elobi Nkolo Nzambe, « Ye oyo azali, azalaki, mpe azali koya, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso. »
Yesu alobaki lisusu na bato: — Nazali pole ya mokili; moto nyonso oyo alandaka Ngai akotikala kotambola kati na molili te, kasi akozwa pole ya bomoi.
Yango wana nalobaki na bino: « Bokokufa kati na lisumu na bino; » pamba te soki bondimi te ete « Nazali oyo azali, » bokokufa kati na lisumu na bino.
Yesu azongiselaki bango: — Ngai nazali lipa oyo epesaka bomoi. Moto nyonso oyo akoya epai na Ngai akoyoka lisusu nzala te, mpe moto nyonso oyo akondima Ngai akoyoka lisusu posa ya mayi te.
Ngai nde nazali ekuke; moto nyonso oyo akokotela na nzela na Ngai akobika; akokota mpe akobima, mpe akozwa bilei.
Yesu alobaki na ye: — Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Moto nyonso oyo andimi Ngai akozala na bomoi, atako akufi.
Yesu azongiselaki ye: — Ngai, nazali nzela, solo mpe bomoi. Moto moko te akoki koya epai ya Tata, soki na nzela na Ngai te.
Nazali nzete ya solo ya vino, mpe Tata na Ngai azali nkolo elanga.
Tango namonaki Ye, nakweyaki na makolo na Ye lokola moto akufi. Bongo asimbaki ngai na loboko na Ye ya mobali mpe alobaki na ngai: « Kobanga te! Nazali Ya liboso mpe Ya suka.
Nazali Alifa mpe Omega, Moto ya liboso mpe Moto ya suka, Ebandeli mpe Suka.