Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Nkolo Mobateli na biso
Bavɛrsɛ 13 ya Biblia na ntína ya Nkolo Mobateli na biso mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Nzembo ya Davidi. Yawe azali mobateli na ngai, nakozanga ata eloko moko te.
Nazali mobateli malamu ya bameme. Mobateli malamu ya bameme apesaka bomoi na ye mpo na bameme na ye.
Azali kobatela etonga na Ye lokola mobateli bibwele: kosangisa bana meme na maboko na Ye mpe kokanga bango na tolo na Ye; kotambolisa malembe-malembe bana meme ya basi oyo ezali nanu komela mabele.
Ngai moko nakoleisa bibwele na Ngai, mpe Ngai moko nakopemisa yango, elobi Nkolo Yawe;
Boyeba ete Yawe nde azali Nzambe; Ye nde asala biso, mpe tozali bato na Ye. Solo, tozali bato na Ye mpe etonga oyo aleisaka.
Apemisaka ngai na matiti ya mobesu, mpe amemaka ngai pembeni ya mayi ya kimia. Ayeisaka sika makasi ya bomoi na ngai, akambaka ngai na banzela ya bosembo mpo na lokumu ya Kombo na Ye.
Ngai, nazali mobateli malamu ya bibwele; nayebi bameme na Ngai, mpe bameme na Ngai eyebi Ngai
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Ezali ya koyemba lokola « Lisi ya Mobeko. » Litatoli. Nzembo ya Azafi.
Pamba te bozalaki lokola bameme oyo ezali koyengayenga, kasi sik’oyo bozongi epai ya Mobateli bibwele oyo akengelaka bomoi na bino.
Abimisaki bato na Ye lokola etonga, amemaki bango kati na esobe lokola meme;
Pamba te azali Nzambe na biso; tozali bato oyo aleisaka, etonga oyo abatelaka. Lelo, soki boyoki mongongo na Ye,
— Soki moko kati na bino azali na bameme nkama moko, bongo moko kati na yango ebungi; boni, akotika te bameme tuku libwa na libwa kati na esobe mpo na kokende koluka moko oyo ewuti kobunga kino amona yango? Mpe tango akomona yango, akotia yango na mapeka na ye, na esengo.
Boye, akozala kimia na bango! Tango mampinga ya Asiri bakokota na makasi kati na mokili na biso mpe na bandako na biso, oyo batonga makasi, tokotindela bango babateli sambo ya bibwele mpe bakambi mwambe ya bato mpo na kobundisa bango.