Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Yawe-Yire (Nzambe Apesaka)
Bavɛrsɛ 11 ya Biblia na ntína ya Yawe-Yire (Nzambe Apesaka) mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Abrayami abengaki esika yango « Nkolo akopesa. » Yango wana balobaka kino lelo: « Na likolo ya ngomba ya Yawe, ekopesama. »
Mpe Nzambe na ngai akokokisa baposa na bino kolanda bomengo ya nkembo na Ye kati na Yesu-Klisto.
Bolukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe mpe bosembo na Ye, bongo bakobakisela bino biloko wana nyonso.
Nzembo ya Davidi. Yawe azali mobateli na ngai, nakozanga ata eloko moko te.
Abrayami azongisaki: — Mwana na ngai, Ye moko Nzambe akopesa mpate mpo na mbeka ya kotumba. Boye bango mibale bakendeki nzela moko.
Abrayami atombolaki miso na ye mpe amonaki meme ya mobali oyo maseke na yango ezalaki ya kokangama na nzete ya moke. Azwaki yango mpe apesaki yango mbeka ya kotumba na esika ya mwana na ye ya mobali.
Nzambe azali mpe na makoki ya kotondisa bino na mapamboli ya ndenge na ndenge mpo ete, na tango nyonso mpe kati na makambo nyonso, bozala na nyonso oyo bozali na yango na bosenga mpe botonda lisusu na oyo bokosala na yango misala ya malamu ya lolenge nyonso,
Bomeka elengi mpe botala ndenge nini Yawe azali malamu; Esengo na moto oyo azwaka Yawe lokola ebombamelo na ye! Bino basantu ya Yawe, botosa Yawe; pamba te bato oyo batosaka Ye bazangaka eloko moko te.
Bolukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe, bongo bakobakisela bino biloko wana nyonso.
Ye oyo aboyaki te kopesa Mwana na Ye se moko, kasi akabaki Ye mpo na biso nyonso, ndenge nini azanga kopesa biso biloko nyonso elongo na Ye na nzela ya ngolu?
Apesaka bato oyo batosaka Ye bilei; akanisaka Boyokani na Ye tango nyonso.