Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Nzambe Azali Bolingo

Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Nzambe Azali Bolingo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 1 Yoane 4:8

Moto oyo azangi bolingo ayebi Nzambe te, pamba te Nzambe azali bolingo.

02 1 Yoane 4:16

Mpe biso toyebi mpe tozali na kondima kati na bolingo oyo Nzambe azali na yango mpo na biso. Nzambe azali bolingo, mpe moto oyo abikaka kati na bolingo abikaka kati na Nzambe, mpe Nzambe abikaka kati na ye.

03 1 Yoane 4:19

Biso, tolingaka mpo ete Nzambe alingaki biso, ya liboso.

04 Yoane 3:16

Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko.

05 Barome 5:8

Kasi tala ndenge nini Nzambe alakisi biso bolingo na Ye: wana tozalaki nanu bato ya masumu, Klisto akufelaki biso.

06 1 Yoane 4:9

Botala ndenge nini Nzambe atalisaki biso bolingo na Ye: atindaki Mwana na Ye se moko kati na mokili mpo ete tozala na bomoi ya solo na nzela na Ye.

07 Jeremi 31:3

Yawe abimelaki biso na kala, alobaki: « Nalingaka bino na bolingo ya seko; yango wana nabendaka bino epai na Ngai na nzela ya bolingo.

Bantína oyo etali