Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bósanzola Ye na bisika ya likoló
Bavɛrsɛ 13 ya Biblia na ntína ya Bósanzola Ye na bisika ya likoló mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Bokumisa Yawe! Bokumisa Yawe wuta na likolo, bokumisa Ye na bisika oyo eleki likolo.
Bokumisa Ye, bino ba-anjelu na Ye nyonso; bokumisa Ye, bino mampinga na Ye nyonso; bokumisa Ye, bino moyi mpe sanza; bokumisa Ye, bino minzoto nyonso oyo engengaka;
Tika ete bakumisa Kombo ya Yawe! Pamba te Ye moko kaka nde aleki likolo; nkembo na Ye eleki mabele mpe likolo.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.
Bokumisa Yawe! Bokumisa Nzambe kati na Esika na Ye ya bule, bokumisa Ye kati na likolo na Ye ya monene epai wapi avandi na nguya makasi!
Tika ete nyonso oyo ezali na pema ekumisa Yawe! Bokumisa Yawe!
‹ Nakokomisa yo libota ya bokonzi mpo na tango nyonso mpe nakolendisa kiti na yo ya bokonzi mpo na seko. › »
Serafe moko na moko azalaki koganga na mosusu: « Bule, Bule, Bule, Yawe, Mokonzi ya mampinga! Mokili mobimba etondi na nkembo na Ye! »
Moko na moko kati na bikelamu nyonso minei azalaki na mapapu motoba, mpe nzoto na ye ezalaki etonda na miso, ezala na se ya mapapu. Butu mpe moyi, bazalaki kolemba te koloba: Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, oyo azalaki, azali, mpe azali koya, azali Bule, Bule, Bule.
Tika ete likolo esepela, mpe mabele ezala kati na esengo! Tika ete ebale monene elongo na nyonso oyo ezali kati na yango epesa lokito!
bokumisa Ye, bino oyo boleki likolo kati na likolo, mpe bino mayi oyo bozali na likolo!
Ezali Yo, bobele Yo, nde ozali Yawe! Okela Likolo, Likolo oyo eleki Likolo mpe mampinga nyonso ya Likolo; okela lisusu mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango, bibale minene mpe nyonso oyo ezali kati na yango; opesaka bomoi na bikelamu nyonso, mpe mampinga ya Likolo egumbamaka liboso na Yo.
Bopambola Yawe, bino ba-anjelu na Ye nyonso oyo bozali na nguya mpe botosaka mitindo na Ye. Bopambola Yawe, bino mampinga na Ye nyonso oyo bokokisaka mokano na Ye.