Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bantango na biso ezali na lobɔkɔ na Ye
Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Bantango na biso ezali na lobɔkɔ na Ye mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Kasi ngai, natiaka elikya na ngai kati na Yo, Yawe, mpe nalobaka: « Ozali Nzambe na ngai. »
Tango nazalaki nanu na lolenge te, ozalaki komona ngai; mpe omikomelaki kati na buku na Yo mikolo nyonso oyo obongisaki mpo na bomoi na ngai liboso ete moko te kati na yango ezala.
Mikolo ya moto ekatama; okata motango ya basanza na ye mpe otia mondelo oyo akoki koleka te.
Pamba te, ezali na nzela na Ye nde tozalaka na bomoi, toninganaka mpe tozalaka oyo tozali, ndenge bakomi na bino mosusu baloba: « Tozali bana na ye! »
Lakisa biso kotanga malamu mikolo ya bomoi na biso mpo ete tokoma na mitema ya bwanya.
Boyoka sik’oyo, bino bato oyo bolobaka: « Lelo to lobi, tokokende na engumba songolo, tokovanda kuna mobu mobimba mpe tokosala mombongo oyo ekobotela biso mbongo ebele. » Boni, boyebi makambo oyo ekoya lobi? Bomoi na bino nde nini? Ezali kaka te lokola londende oyo emonanaka mpo na mwa tango moke mpe, na sima, elimwe? Tala ndenge bosengeli koloba: « Soki Nkolo alingi, tokozala na bomoi mpe tokosala likambo songolo to pakala. »
Botala sik’oyo, Ngai kaka nde nazali Nzambe; mosusu azali te! Nabomaka mpe napesaka bomoi; nazokisaka mpe nabikisaka. Mpe moto moko te akoki kokangola oyo ezali na maboko na Ngai.