Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Etingya

Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Etingya mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Masese 12:24

Maboko oyo esalaka ezwaka bokonzi, kasi maboko ya goyigoyi ememaka na bowumbu.

02 Masese 10:4

Maboko ya goyigoyi ekomisaka moto mobola, kasi maboko oyo esalaka ekomisaka moto mozwi.

03 Bakolose 3:23

Mosala nyonso oyo bosalaka, bosalaka yango na mitema na bino mobimba, lokola nde bozali kosala yango mpo na Nkolo, kasi mpo na bato te,

04 Masese 13:4

Moto ya goyigoyi ayokaka baposa, kasi akoki kokokisa yango te; nzokande baposa ya moto ya nzunzu ekokisamaka.

05 Mosakoli 9:10

Mosala nyonso oyo loboko na yo ekokoka kosala, sala yango na makasi na yo nyonso; pamba te kati na mboka ya bakufi epai wapi okokende, ezala mosala, mabongisi, boyebi to bwanya ezalaka kuna te.

06 Masese 21:5

Mabongisi ya moto oyo asalaka mosala ememaka ye na bomengo, kasi kozala motema moto-moto ememaka na kozanga.

07 Masese 22:29

Osila komona moto oyo ayebi mosala na ye malamu? Akosala kaka liboso ya bakonzi, akosala te liboso ya bato ya molili.

Bantína oyo etali