Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mbongo

Bavɛrsɛ 11 ya Biblia na ntína ya Mbongo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 1 Timote 6:10

Pamba te lokoso ya mbongo ezali mosisa ya mabe nyonso. Mpo na lokoso ya mbongo, bato mingi babungisaki kondima na bango mpe bamipesaki minyoko ebele.

02 Matayo 6:24

Moto moko te akoki kosalela bankolo mibale, pamba te akoyina moko mpe akolinga mosusu to akokangama na moko mpe akoboya mosusu. Bokoki te kosalela Nzambe mpe mbongo nzela moko.

03 Ba-Ebre 13:5

Bozalaka na lokoso ya mbongo te, bosepelaka nde na oyo bozali na yango, pamba te Ye moko Nzambe alobaki: « Nakotikala kokabwana na yo te, nakotikala kosundola yo te. »

04 Masese 3:9-10

Pesaka Yawe lokumu na nzela ya biloko na yo mpe ya bambuma ya liboso ya bozwi na yo nyonso. Bongo bibombelo na yo ekotonda na biloko, mpe bambeki na yo ekotonda na vino.

05 Luka 16:13

Mosali moko te akoki kosalela bankolo mibale, pamba te akoyina moko mpe akolinga mosusu to akokangama na moko mpe akoboya mosusu. Bokoki te kosalela mbala moko Nzambe mpe mbongo.

06 Masese 11:28

Moto oyo atiaka elikya na bomengo na ye akokweya, kasi bayengebene bakozala kitoko lokola makasa ya sika.

07 Mosakoli 5:10

Ndenge bozwi ya moto ekomaka ebele, ndenge wana mpe bato oyo baliaka yango bakomaka ebele; bongo litomba nini nkolo na yango akozwa, soki kaka te komona yango na miso?

08 Luka 12:15

Bongo alobaki na bato nyonso: — Bosala keba! Bomibatela malamu ete bokweya te na lokoso ya konduka bomengo; pamba te, ezala kati na bofuluki, ezali bomengo te nde esalaka bomoi ya moto.

09 Masese 22:7

Mozwi azalaka mokonzi ya mobola, mpe modefi azalaka mowumbu ya modefisi.

10 1 Timote 6:17-18

Pesa mitindo epai ya bazwi kati na mokili oyo ete bazala na lolendo te mpe batia elikya te na bomengo, pamba te bomengo ekoki kosila; kasi tika ete batia elikya na bango kati na Nzambe oyo apesaka biso biloko nyonso, na bofuluki, mpo ete tosepela na yango. Pesa bango mitindo ete basalaka bolamu, batonda na misala malamu, bazala na motema ya kokaba mpe bakabelaka bato.

11 Matayo 6:19-21

Bonduka bomengo te awa na mokili, pamba te ekoki kobeba to nselele ekoki kolia yango to mpe miyibi bakoki kobuka ndako mpo na koyiba yango. Kasi bonduka bomengo na bino kati na Likolo epai wapi ekoki kobeba te to nselele ekoki kolia yango te to mpe miyibi bakoki kobuka ndako te mpo na koyiba yango; pamba te epai bomengo na yo ezali, kuna mpe motema na yo ekozala.

Bantína oyo etali