Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bobola

Bavɛrsɛ 12 ya Biblia na ntína ya Bobola mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Masese 19:17

Moto oyo asalaka bolamu epai ya mobola adefisaka Yawe, bongo Yawe akozongisela ye bolamu.

02 Masese 14:31

Moto oyo anyokolaka mobola atiolaka Mokeli ya mobola yango, kasi moto oyo asalelaka moto akelela bolamu apesaka Ye lokumu.

03 Masese 22:2

Mozwi mpe mobola bazali na likambo moko ya lisanga: ezali Yawe nde azali Mokeli na bango mibale.

04 1 Samuele 2:7

Yawe akomisaka moto mobola, mpe akomisaka moto mozwi; akitisaka mpe atombolaka.

05 Banzembo 140:12

Batioli bakowumela te kati na mokili, pasi ekolanda bato na kanza na kolemba te.

06 Masese 30:8-9

longola mosika na ngai makambo ya pamba mpe ya lokuta, kopesa ngai te bobola to bozwi, kasi pesa ngai kaka, mokolo na mokolo, lipa oyo ekoki na ngai, pamba te soki natondi makasi, nakoki kowangana Yo mpe koloba: « Yawe nde nani? » To soki nazali na bobola, nakoki koyiba mpe koyokisa Kombo ya Nzambe na ngai soni.

07 Masese 13:23

Bilanga ya mobola ekoki kobotela ye bilei ebele, kasi ezali na bato oyo bazali kobeba mpo na kozanga bosembo.

08 Masese 17:5

Moto oyo anyokolaka mobola anyokolaka Mokeli ya mobola yango; moto oyo asepelaka na pasi ya moninga akozanga te kozwa etumbu.

09 Masese 31:20

Afungolaka loboko na ye mpo na kokabela babola, mpe asembolaka yango mpo na kosunga bato bakelela.

10 Luka 6:20

Bongo Yesu atalaki bayekoli na Ye mpe alobaki: « Esengo na bino oyo bozali babola, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bino!

11 Masese 21:13

Soki moto akangi matoyi na ye mpo na koboya koyoka koganga ya mobola, ye mpe bakoyanola ye te tango akoganga.

12 Masese 30:14

Ezali na bato oyo minu na bango ezali lokola mipanga, lokola mbeli mpo na koboma babola kati na mokili mpe bato bakelela kati na bato.

Bantína oyo etali