Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kosepela na oyo ozali na yango
Bavɛrsɛ 5 ya Biblia na ntína ya Kosepela na oyo ozali na yango mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Nalobi bongo te mpo ete nazali kokelela, pamba te nayekola kosepela na oyo nazali na yango.
Solo, kozala sembo epai na Nzambe ezali nzela monene ya kozwa bomengo soki kaka oyebi kosepela na oyo ozali na yango. Pamba te, toyaki maboko pamba kati na mokili, mpe tokozonga maboko pamba. Mpe lokola tokozalaka na bilei mpe na bilamba, tokosepelaka na yango.
Bozalaka na lokoso ya mbongo te, bosepelaka nde na oyo bozali na yango, pamba te Ye moko Nzambe alobaki: « Nakotikala kokabwana na yo te, nakotikala kosundola yo te. »
longola mosika na ngai makambo ya pamba mpe ya lokuta, kopesa ngai te bobola to bozwi, kasi pesa ngai kaka, mokolo na mokolo, lipa oyo ekoki na ngai, pamba te soki natondi makasi, nakoki kowangana Yo mpe koloba: « Yawe nde nani? » To soki nazali na bobola, nakoki koyiba mpe koyokisa Kombo ya Nzambe na ngai soni.
Nayebi kobika na tango ya kokelela, mpe nayebi kobika na tango ya bozwi. Kati na makambo nyonso mpe na tango nyonso, nayekola kozala na esengo: ezala soki nazali na bilei to nazangi yango, ezala soki nazali na bozwi to nakeleli. Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi.