Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mosala
Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Mosala mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Mosala nyonso oyo bosalaka, bosalaka yango na mitema na bino mobimba, lokola nde bozali kosala yango mpo na Nkolo, kasi mpo na bato te,
pamba te boyebi malamu ete bokozwa, lokola lifuti, libula oyo Nkolo abongisa mpo na bato ya Nzambe. Ezali Klisto nde azali Nkolo oyo bosalelaka.
Pesa misala na yo epai na Yawe, mpe mabongisi na yo ekokokisama.
Mosala nyonso oyo loboko na yo ekokoka kosala, sala yango na makasi na yo nyonso; pamba te kati na mboka ya bakufi epai wapi okokende, ezala mosala, mabongisi, boyebi to bwanya ezalaka kuna te.
Boye, ezala kolia to komela, nyonso oyo bokoki kozala kosala, bosalaka nyonso mpo na lokumu ya Nzambe.
Mosala nyonso epesaka litomba, kasi maloba ya pamba ememaka na bobola.
Pamba te, ezala tango tozalaki elongo na bino, topesaki bino mobeko oyo: « Tika ete moto oyo aboyi kosala mosala alia mpe te! »
Yawe Nzambe azwaki moto mpe atiaki ye kati na elanga ya Edeni mpo na kolona yango mpe kobatela yango.