Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Niongo
Bavɛrsɛ 9 ya Biblia na ntína ya Niongo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Mozwi azalaka mokonzi ya mobola, mpe modefi azalaka mowumbu ya modefisi.
Bozala na niongo ya moto te, longola kaka niongo ya kolingana bino na bino, pamba te moto oyo alingaka bato mosusu akokisi makambo nyonso oyo Mobeko esengaka.
Kozala te na molongo ya bato oyo batombolaka maboko mpo na kondima kofuta baniongo ya bato mosusu, pamba te soki ozali na yo na makoki ya kofuta te, mpo na nini okolinga ete babotola ata mbeto na yo ya kolala?
Moto mabe adefaka mpe azongisaka te, kasi moto ya sembo ayokaka mawa mpe akabaka.
Pamba te Yawe, Nzambe na bino, akopambola bino ndenge alakaki; mpe bino bokodefisa na bikolo ebele, kasi bokodefa te. Bokokonza bikolo ebele, kasi ekolo moko te ekokonza bino.
Koboyaka te kosala bolamu epai ya moto oyo azali na bosenga, tango maboko na yo ezali na makoki ya kosala yango. Kolobaka na moninga na yo te: « Kende, bongo oya sima; nakopesa yo yango lobi; » soki ozali na makoki ya kosala likambo yango.
Akabaka tango nyonso mpe adefisaka, bana na ye bakozalaka kati na mapamboli.
Mwasi yango akendeki koyebisa moto na Nzambe. Mpe moto na Nzambe alobaki na ye: — Kende, teka mafuta yango mpe futa niongo na yo; bongo, yo elongo na bana na yo ya mibali, bokobika na oyo ekotikala.
Mokonzi ya mosali ayokelaki ye mawa, alimbisaki niongo na ye mpe atikaki ye kokende.