Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kopesa eteni ya zomi

Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Kopesa eteni ya zomi mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Malashi 3:10

Boye, bomema biteni na bino nyonso ya zomi, na mobimba na yango, na ebombelo bomengo ya Tempelo mpo ete bilei ezanga te kati na Ndako na Ngai. Na bongo, bomeka Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « mpo na kotala soki nakofungolela bino te maninisa ya Lola mpe soki nakosopela bino te lipamboli na Ngai, na bofuluki oyo ezanga ndelo.

02 Masese 3:9-10

Pesaka Yawe lokumu na nzela ya biloko na yo mpe ya bambuma ya liboso ya bozwi na yo nyonso. Bongo bibombelo na yo ekotonda na biloko, mpe bambeki na yo ekotonda na vino.

03 Levitike 27:30

Eteni nyonso ya zomi ya biloko nyonso oyo ekowuta na mabele, ezala bambuma ya bilanga to bambuma ya banzete, ezali ya Yawe: ezali bule mpo na Yawe.

04 Matayo 23:23

Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale! Solo, bofutaka eteni ya zomi ya bandembi, ya bamusikadi mpe ya biloko ya mike-mike ya solo kitoko; kasi bomonaka pamba makambo oyo eleki motuya kati na Mobeko: bosembo, motema mawa mpe kondima. Nzokande, bosengeli nde kotia yango na misala mpe kozwa na motuya likambo oyo wana ya kofuta eteni ya zomi.

05 Ebandeli 28:22

libanga oyo natelemisi lokola elembo ekokoma Ndako ya Nzambe mpe nakopesa Ye eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo akopesa ngai. »

06 Neyemi 10:37

Tokomema lisusu bana ya liboso kati na bana na biso ya mibali, kati na bangombe na biso, kati na bameme mpe kati na bantaba na biso, na Ndako ya Nzambe na biso, epai ya Banganga-Nzambe oyo basalaka mosala kuna, ndenge ekomama na Mobeko.

07 2 Masolo ya Kala 31:5

Tango kaka bapanzaki sango ya mitindo oyo, bato ya Isalaele bapesaki na esengo bambuma na bango ya liboso ya ble, ya vino ya sika, ya mafuta, ya mafuta ya nzoyi mpe ya biloko nyonso oyo ebimaka na bilanga. Bamemaki lisusu biloko ebele lokola eteni ya zomi ya nyonso.

Bantína oyo etali